Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikakatano oyo basi bakutanaka na yango

Mikakatano oyo basi bakutanaka na yango

“Ntango namonaka ndenge oyo banyokolaka basi, nalingaka natikala kaka ndenge nazali, nakola te.”​—ZAHRA, MBULA 15, batángi maloba na ye na zulunalo moko (GEO, na Lifalanse).

MALOBA ya elenge mwasi oyo ezali awa na lobɔkɔ ya mobali, ezali solo​—na mokili mobimba, bazali konyokola basi, ezala bilenge to mikóló, mpe bazali kozwa bango na valɛrɛ te bomoi na bango mobimba. Tótalela makambo oyo elandi:

  • Kolinga bana mibali koleka bana basi. Na Azia, baboti mingi balingaka bana mibali koleka bana basi. Na 2011, lapolo moko ya O.N.U. emonisaki ete na Azia, basi pene na milio 134 bazali kozanga na kati ya bato ya mikili yango mpo na likambo ya kolongola zemi, koboma bana mpe kozanga kokipe basi.

  • Kelasi. Na mokili mobimba, na kati ya bato oyo batángá kelasi mingi te, elingi koloba baoyo balekisá ata mbula minei te na kelasi, mingi na bango (2/3) ezali nde basi.

  • Kosangisa na bango nzoto na makasi. Basi koleka miliare mibale na ndambo bafandaka na bikólo oyo bato bamonaka ete ezali mabe te mobali asangisa ná mwasi na ye nzoto na makasi.

  • Bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto. Na bikólo ya bobola, na miniti nyonso mibale oyo ezali koleka, mwasi moko azali kokufa na zemi to na mikakatano na ntango ya kobota mpo na kozanga kozwa lisalisi malamu ya monganga.

  • Lotomo ya kozala na biloko. Atako basi nde balonaka biloko mingi oyo mokili mobimba elyaka, na bikólo mingi, basi bazalaka te na lotomo ya kozala na biloko to mabele na bango moko.

Mpo na nini basi bazali te na lotomo oyo moto nyonso asengeli kozala na yango? Bato mosusu balandaka mateya ya mangomba na bango mpe mimeseno oyo emonisaka ete kobebisa basi to konyokola bango ezali mabe te. Zulunalo moko ya France ezongeli maloba ya Chandra Rami Chopra, mwasi moko oyo azali avoka na Inde, oyo alobaki boye: “Mibeko ya mangomba nyonso ekokani na likambo oyo: Elendisaka likanisi ya konyokola basi.”

Yo mpe omonaka bongo? Okanisaka ete Biblia ekitisaka basi, ndenge babuku mosusu ya mangomba emonisaka yango? Bato mosusu bamonaka lokola ete bavɛrsɛ mosusu ya Biblia elendisaka likanisi yango. Kasi, ndenge nini Nzambe oyo azali nkolo Biblia atalelaka basi? Atako bato mingi basepelaka na likambo yango te, kotalela malamumalamu mpe na bosembo nyonso oyo Biblia elobi mpo na ndenge oyo Nzambe atalelaka basi ekosalisa biso tózwa eyano.