Nkombo ya Nzambe eyebani na Swahili
“Swahili.” Ntango bato mingi bayokaka nkombo wana, bamonaka mbala moko Afrika mpe banyama ya zamba oyo ezali kotambolatambola na parkɛ ya Serengeti, oyo ezalaka na matiti mingi. Kasi, ezali na makambo mingi oyo etali Swahili mpe bato oyo balobaka yango.
SWAHILI ezali monɔkɔ oyo bato soki milio nkama moko balobaka, na bikólo soki 12 ya Afrika ya Ntei mpe ya Ɛsti. * Ezali monɔkɔ oyo bato mingi balobaka na bikólo yango mpe oyo Leta esalelaka na bikólo mingi, na ndakisa na Kenya, na Ouganda mpe na Tanzanie. Mpe na bikólo mosusu ya zingazinga, Swahili ezali monɔkɔ oyo esalisaka bato oyo bauti na bisika ndenge na ndenge na mimbongo na bango, mpe esalisaka bango básolola kozanga mokakatano.
Swahili esalisi mingi mpo bato ya Afrika ya Ɛsti bázala na bomoko. Na ndakisa, kaka na Tanzanie, minɔkɔ soki 144 elobamaka kuna. Kanisá ete olongwe epai na bino mpe ozali kosala mobembo ya kilomɛtrɛ kobanda 40 tii 80, kasi ozali kokutana na bato oyo bazali koloba monɔkɔ oyo ekesani mosika na monɔkɔ oyo yo olobaka! Mpe bato mosusu oyo bazali koloba monɔkɔ yango bafandi kaka na mwa mboka moke. Ndenge nini okosolola na bango? Yango esalisi biso tómona ete kozala na monɔkɔ kaka moko ezali na matomba mingi.
Ndenge oyo Swahili ebandá
Bato bakanisaka ete Swahili ebandá kolobama kobanda na siɛklɛ ya zomi. Babandaki kokoma yango na siɛklɛ ya zomi na motoba. Baoyo bayekolaka koloba Swahili baumelaka te na koyeba ete
maloba na yango mosusu ezali ndenge moko na oyo ya Arabe. Mpo na koloba solo, maloba mosusu ya Swahili (20%) euti na Arabe, kasi maloba na yango mingi ezali ya Afrika. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki na boumeli ya bankama ya bambula, Swahili ezalaki kokomama na alfabɛ ya Arabe.Lelo oyo, Swahili ekomamaka na alfabɛ to ekomeli ya Baroma. Likambo nini esalemaki? Mpo na nini mbongwana ya ndenge wana? Mpo na kozwa eyano, tosengeli kozonga na katikati ya siɛklɛ ya 19, ntango bamisionɛrɛ ya liboso ya Mpoto bakómaki na Afrika ya Ɛsti mpo na koteya bato oyo bafandaka kuna mateya ya Biblia.
Liloba ya Nzambe ekɔti na Afrika ya Ɛsti
Na mobu 1499, ntango Vasco de Gama asalaki mobembo na ye oyo ekendá nsango na sudi mpenza ya Afrika, bamisionɛrɛ ya Portugal bakɔtisaki lingomba ya Katolike na Afrika ya Ɛsti mpe batongaki kuva na Zanzibar. Kasi, nsima ya mbula 200, bana-mboka babenganaki Ba-portugais mpe baboyaki “lingomba ya bokristo” na mboka na bango.
Bambula mosusu 150 elekaki liboso ete Liloba ya Nzambe ekɔta lisusu na Afrika ya Ɛsti. Na mbala oyo, Johann Ludwig Krapf, misionɛrɛ moko ya Allemagne nde akɔtisaki yango. Ntango akómaki na Mombasa, na Kenya, na mobu 1844, bato mingi oyo bazalaki kofanda pembenipembeni ya mai na Afrika ya Ɛsti bazalaki Bamizilma; nzokande bato mingi mosusu oyo bazalaki kofanda na bamboka ya kati bazalaki kolanda losambo ya bonkɔkɔ na bango. Krapf amonaki ete ezalaki na ntina mingi ete bato nyonso bázala na Biblia.
Krapf alekisaki ntango te, abandaki mbala moko koyekola monɔkɔ ya Swahili. Na sanza ya Yuni 1844, mwa moke nsima ya kokóma na Afrika, abandaki mosala makasi ya kobongola Biblia. Likambo ya mawa, kaka na sanza oyo elandaki, mwasi na ye oyo basalaki na ye kaka mbula mibale ya libala akufaki, mpe nsima ya mwa mikolo, mwana na bango ya moke ya mwasi akufaki. Atako azalaki na mawa makasi mpo na liwa na bango, akobaki mosala wana ya ntina mingi ya kobongola Biblia. Na mobu 1847, abimisaki mikapo misato ya liboso ya mokanda ya Ebandeli mpe yango ezalaki makomi ya liboso oyo ebimisamaki na monɔkɔ ya Swahili.
Krapf azalaki moto ya liboso ya kosalela ekomeli ya Baroma mpo na kokoma Swahili, na esika ya kosalela ekomeli ya Arabe. Moko ya bantina oyo apesaki mpo na ndenge aboyaki kosalela ekomeli ya Arabe ezalaki ete “Alfabɛ ya Arabe elingaki kozala mpasi mpo na bato ya Mpoto” oyo balingaki koyekola monɔkɔ yango nsima mpe “ekomeli ya Baroma ekokaki kosalisa ‘bana-mboka báyekola minɔkɔ ya Mpoto kozanga mokakatano.’” Bato mingi bakobaki kosalela ekomeli ya Arabe na boumeli ya bambula mingi; biteni mosusu ya Biblia
ebimisamaki na ekomeli yango. Nzokande, kosalela ekomeli ya Baroma esalisaki bato mingi báyekola Swahili kozanga mokakatano. Na ntembe te, bamisionɛrɛ mingi mpe bato mosusu oyo bayekolaka Swahili basepelaka mingi ndenge mbongwana wana esalemaki.Longola kozala moto ya liboso oyo abongolaki Liloba ya Nzambe na Swahili, Krapf abongisaki mpe makambo mpo na babongoli mosusu oyo balingaki kosala mosala yango nsima. Abimisaki buku ya liboso ya gramɛrɛ na Swahili, abimisaki mpe diksionɛrɛ moko ya monɔkɔ yango.
Nkombo ya Nzambe na Swahili
Na mikapo misato ya mokanda ya Ebandeli oyo ebimaki liboso, nkombo ya Nzambe ebongolamaki kaka na “Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” Kasi, na nsuka ya siɛklɛ ya 19, ebele ya mibali mosusu bayaki na Afrika ya Ɛsti mpe bakobaki mosala ya kobongola Biblia mobimba na Swahili. Kati na bango, tokoki kotánga Johann Rebmann, William Taylor, Harry Binns, Edward Steere, Francis Hodgson, mpe Arthur Madan.
Likambo ya ntina ezali ete na mabongoli yango ya liboso batyaki nkombo ya Nzambe, kaka na bisika moke te, kasi na Makomami nyonso ya Ebre! Baoyo basalaki mosala ya kobongola na Zanzibar babongolaki nkombo ya Nzambe na “Yahuwa,” mpe baoyo basalaki mosala yango na Mombasa babongolaki yango na “Jehova.”
Kobanda mobu 1895, Biblia mobimba ebongolamaki na Swahili. Na boumeli ya bambula oyo elandaki, mabongoli mingi mosusu ya Biblia ebimaki, atako mabongoli yango mosusu ekabolamaki mingi te. Na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, milende mingi esalemaki mpo na kosalela Swahili oyo bato nyonso ya Afrika ya Ɛsti bakoyeba. Yango wana, na mobu 1952 babimisaki libongoli moko ya Biblia (Swahili Union Version), oyo ekabolamaki mingi. Yango mpe esalaki ete nkombo “Yehova” eyebana mingi lokola nkombo ya Nzambe na Swahili.
Likambo ya mawa, ntango mabongoli wana ya ebandeli etikaki kobimisama, nkombo ya Nzambe ebandaki mpe kolimwa. Mabongoli mosusu ya sika elongolaki mpenza nkombo yango na bisika nyonso, kasi mabongoli mosusu etikaki nkombo yango kaka na bisika moke. Na ndakisa, na libongoli oyo touti kolobela (Union Version), nkombo ya Nzambe ezali mbala kaka 15 mpe na ebimeli na yango ya 2006, nkombo yango ezwami kaka mbala 11. *
Atako libongoli yango elongoli nkombo ya Nzambe pene na bisika nyonso, ezali na likambo moko ya ntina mingi. Na lokasa ya ebandeli ya Biblia yango, elobami polele ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Yango esungi mpenza mpo na kosalisa bato oyo balukaka solo báyeba nkombo mpenza ya Tata na biso ya likoló na Biblia na bango moko.
Kasi, yango ezalaki nsuka ya makambo te. Na mobu 1996, Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimisamaki na
Swahili. Yango ezali Biblia ya liboso ya Swahili oyo ezongisaki nkombo Yehova na bisika 237, kobanda na Matai tii na Emoniseli. Mpe na mobu 2003, Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na mobimba na Swahili. Banda wana tii lelo oyo, Babiblia 900 000 na Swahili esili konyatama.Batye lisusu batitre te mpo na kobomba nkombo ya Nzambe to kopesa ndimbola moko na lokasa ya ebandeli. Lelo oyo, ntango bato ya mitema sembo bafungolaka Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Swahili, bapusanaka penepene na Yehova mbala nyonso oyo batángaka nkombo na ye na bisika koleka 7 000.
Libongoli yango esaleli mpe Swahili ya pɛtɛɛ, oyo elobamaka mikolo oyo mpo bato nyonso ya Afrika ya Ɛsti oyo balobaka Swahili bázala na mokakatano te mpo na kotánga yango. Longola yango, libongoli yango elongoli mabunga oyo mabongoli mosusu ekɔtisaki na Biblia. Yango wana, batángi bakoki kotya motema ete bazali kotánga “maloba ya solo na bosikisiki” ndenge Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, akomisaki yango na nzela ya elimo na ye.—Mosakoli 12:10.
Bato mingi bamonisaki botɔndi mpo na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Swahili. Vicent, Motatoli ya Yehova oyo azali na mbula 21 mpe alekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola, alobi boye: “Nayokaki esengo mingi ndenge Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolami na Swahili ya pɛtɛɛ mpe ezongisi nkombo Yehova na bisika oyo mabongoli mosusu ya Biblia elongolaki yango.” Frieda, mama moko oyo azali na bana misato amoni ete libongoli yango esalisi ye alimbola solo ya Biblia epai ya bato kozanga mokakatano.
Mosala ya kobongola Liloba ya Nzambe na Swahili, oyo ebandaki lokola lisɛki, ekobaki tii nsima ya mbula koleka 150. Yesu alobaki ete ‘amonisaki nkombo ya Tata na ye polele.’ (Yoane 17:6) Lelo oyo, ntango basalelaka Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika, Batatoli ya Yehova koleka 76 000, oyo balobaka Swahili na bikólo wana ya ntei mpe ya ɛsti ya Afrika, bazalaka na esengo ya kosalisa bato nyonso báyeba nkombo Yehova.
^ par. 3 Na bikólo yango, Swahili ya ndenge nyonso elobamaka.
^ par. 18 Nkombo yango ezwami na Ebandeli 22:14; Kobima 6:2-8 (mbala mibale); 17:15 (Yahweh); Basambisi 6:24; Nzembo 68:20; 83:18; Yisaya 12:2; 26:4; 49:14; mpe Yirimia 16:21.