Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Bakristo bakimaki Yudea liboso ete Yerusaleme ebebisama na mobu 70 ya ntango na biso?

“Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa.” (Luka 21:20, 21) Yesu apesaki bayekoli na ye malako wana mpo na kobebisama ya Yerusaleme oyo elingaki koya. Ezali nde na makambo oyo emonisi ete bayekoli balandaki likebisi wana ya Yesu?

Bambula mingi nsima ya liwa ya Yesu, Cestius Gallus, komanda moko ya basoda ya Roma akɔtaki na Palestine mpo na kosukisa botomboki oyo ezalaki kuna. Josèphe, Moyuda mpe moto ya istware oyo azalaki na bomoi na eleko yango amonisaki ete esalemaki bongo. Basoda ya Roma bazingaki Yerusaleme mpe emonanaki lokola ete bazwaki yango. Kasi, na mbalakaka, Gallus apesaki mitindo ete basoda yango bálongwa. Eusèbe, moto moko ya mayele na istware ya makambo ya mangomba alobi ete bakristo ya Yudea bazwaki libaku yango mpo na kokima na Pela, engumba moko ya mokili ya ngombangomba ya Dekapolisi.

Mwa bambula na nsima, na mobu 70 ya ntango na biso, na litambwisi ya Titus, mokonzi mosusu ya basoda ya Roma, limpinga mosusu ezongaki mpe ezwaki Yerusaleme engumba ya Bayuda. Na mbala wana, basoda yango basilisaki mosala oyo Gallus atikaki mpe babebisaki engumba yango. Bankama ya bamilio ya Bayuda bakangamaki na Yerusaleme mpe bakufaki.

“Bana ya basakoli” bazalaki banani?

Masolo ya Biblia oyo elobeli mosakoli Samwele, Eliya mpe Elisha etángi mibali oyo babengami “bana ya basakoli.” Na ndakisa, ntango Elisha alobaki ete Yehu akóma mokonzi ya Yisraele, atindaki “moko ya bana ya basakoli mpo na kotya ye mafuta.”​—2 Bakonzi 9:1-4.

Bato ya mayele balobaka ete maloba yango ekoki kolimbola lisangá ya bato oyo bafandi esika moko mpe bazali kosala mosala elongo; kasi elimboli te bana oyo basakoli babotaki mpenza. Zulunalo moko (Journal of Biblical Literature) elobi ete bato ya lisangá yango bakokaki kozala bato oyo “bamipesaki na mosala ya Yahwe [Yehova], na litambwisi ya mosakoli oyo azalaki lokola . . . tata na bango ya elimo.” (2 Bakonzi 2:12) Kutu, lisolo oyo elobeli ndenge Yehu atyamaki mafuta, ebengi moto oyo Elisha atindaki ete “mosaleli ya mosakoli.”​—2 Bakonzi 9:4.

Emonani lokola ete “bana ya basakoli” bazalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Biblia elobeli etuluku moko ya bato yango na eleko ya Elisha ete bazalaki kotonga bisika na bango moko ya kofanda mpe kosalela ebende ya soka oyo badefi kodefa. (2 Bakonzi 6:1-5) Bamosusu kati na etuluku yango babalaki ndenge emonisami na lisolo oyo elobeli mwasi oyo mobali akufá “kati na basi ya bana ya basakoli.” (2 Bakonzi 4:1) Bayisraele ya sembo bazalaki kosepela na bana ya basakoli mpe, ndenge emonisami na lisolo moko, bazalaki kopesa bango makabo ya bilei.​—2 Bakonzi 4:38, 42.