Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi . . .

Kondima elakisi nde kondima likambo bindimelá?

Kondima elakisi nde kondima likambo bindimelá?

Ntango bakutani na mikakatano, bato mosusu balingaka te kondima likambo oyo ekómeli bango mpe baboyaka kokanisa na ndenge ebongi; bamikosaka na ndenge balukaka biloko oyo epesaka bango mwa kimya na makanisi. Na ndakisa, basusu bamɛlaka masanga mpo na kobosana mikakatano na bango. Na ebandeli, masanga ekoki kosala ete bámityela motema mpe bálonga mikakatano oyo bazali na yango. Kasi na nsima ya mikolo, baoyo basalaka bongo bamisalaka nde mabe. Ezali mpe bongo mpo na likambo etali kondima?

Bamosusu bakanisaka ete kondima ezali ndenge moko na bindimelá. Balobaka ete bato oyo bakangamaka na kondima balingaka te kokanisa makambo na bango moko to balingaka ata moke te makambo oyo ezali komonana mpenza polele ebebisa kondima na bango. Bato oyo bakanisaka ndenge wana bamonaka ete baoyo bazalaka na kondima bayebaka makambo te.

Biblia elobeli makambo mingi oyo etali kondima. Kasi, ata esika moko te elendisi biso tóndimaka makambo bindimelá. Elendisaka mpe te ezaleli ya koboya kokanisa likambo moko boye na mozindo. Biblia elobaka ete baoyo bandimaka maloba nyonso oyo bayoki, bazangi mayele; ebengi bango kutu bazoba. (Masese 14:15, 18) Ya solo, ekozala mpenza bozoba soki tozali kondima makambo nyonso kozanga koluka koyeba soki ezali mpenza solo! Ekozala lokola tokangi miso mpe tozali kokatisa balabala oyo etondi na mituka kaka mpo moto moko ayebisi biso tósala bongo.

Na esika etinda biso tóndima makambo bindimelá, Biblia elendisi nde biso tófungola miso na biso ya elilingi mpo tókosama te. (Matai 16:6) Miso na biso ekozala ntango nyonso ya kofungwama soki tozali kosalela “makoki na [biso] ya kokanisa.” (Baroma 12:1) Biblia esalisaka biso tóluka koyeba makambo oyo endimisi biso mpe tósosola mpenza ntina oyo tondimi likambo yango. Tótalela mwa bandakisa oyo ezali na mikanda oyo ntoma Paulo akomaki.

Ntango Paulo akomelaki bandeko ya lisangá ya Roma, alingaki te ete bándimela Nzambe kaka mpo ayebisaki bango. Kutu, alendisaki bango báluka koyeba makambo oyo endimisi bango ete Nzambe azalaka mpenza. Akomaki boye: “Bizaleli na ye [ya Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, yango wana [baoyo baboyaka kotosa Nzambe] bazali kutu na likambo ya koloba te.” (Baroma 1:20) Paulo asalelaki makanisi ya ndenge wana ntango akomelaki Baebre mokanda. Alobaki boye: “Ya solo, ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Baebre 3:4) Na mokanda oyo akomelaki bakristo ya Tesaloniki, Paulo alendisaki bango bátalelaka makambo nyonso liboso ya kondima yango. Alingaki ete ‘báluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.’​—1 Batesaloniki 5:21.

Kondima ekoki kozala nguba oyo ebatelaka biso

Kondima oyo ezangi bilembeteli ya solosolo ekoki kotinda moto akóma kondima likambo bindimelá, mpe ekoki kosala ete abunga nzela to amisala mabe. Paulo akomaki boye mpo na bandimi mosusu ya ntango na ye: “Nazali kotatwela bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi nde na boyebi ya solosolo te.” (Baroma 10:2) Na yango, ezali mpenza na ntina tólanda toli oyo Paulo apesaki lisangá ya Roma! Akomaki boye: “Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baroma 12:2) Soki kondima na biso euti na boyebi ya solosolo ya Nzambe, ekotinda biso tózala bindimelá te, ekozala nde “nguba monene” oyo ekobatela biso na makambo oyo ekoki kobebisa makanisi mpe boyokani na biso na Nzambe.​—Baefese 6:16.