Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Motuna 2: Nini ekokómela ngai soki nakufi?

Motuna 2: Nini ekokómela ngai soki nakufi?

ROMAN azalaki naino elenge ntango moninga na ye ya motema akufaki na likama ya motuka. Alobi boye: “Liwa ya moninga na ngai esalaki ngai mpasi mingi, bambula mingi nsima ya likama yango, nazalaki komituna nini ekómelaka biso soki tokufi.”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Esengelaki te ete bato bákufaka. Ezala tozali na mbula boni, biso nyonso tolingaka kokufa te. Mingi babangaka mpo na oyo ekokómela bango nsima ya liwa.

Bamosusu bapesaka eyano nini?

Mingi bakanisaka ete soki moto akufi, eteni moko ya nzoto na ye ekobaka kozala na bomoi. Bakanisaka ete bato malamu bakendaka na likoló mpe bato mabe banyokwamaka libela na libela mpo na masumu na bango. Bamosusu bakanisaka ete soki moto akufi, azalaka lisusu te mpe nsukansuka babosanaka ye libela.

Biyano ya ndenge wana emonisaka nini?

Eyano ya liboso emonisi ete moto akufaka mpenza te. Ya mibale emonisi ete bomoi ezali na ntina te. Baoyo bamonaka ete bomoi ezali na ntina te bakoki kokóma na makanisi lokola oyo: “Tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.”​—1 Bakorinti 15:32.

Biblia eteyaka nini?

Biblia eteyaka te ete soki moto akufi, eteni moko ya nzoto na ye ekobaka kozala na bomoi. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Salomo akomaki boye: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5) Baoyo “bayebi ata eloko moko te” bayebi ata likambo moko te oyo ezali kosalema zingazinga na bango. Bakoki koyoka te mpe kosala likambo te. Na yango, bakufi bakoki kosalisa te to kosala bato ya bomoi mabe.

Bato mingi bakanisaka ete Nzambe asalaki bato mpo bákufaka, nzokande ezali bongo te. Akelaki Adama moto ya liboso mpo azala na bomoi awa na mabele libela na libela. Mbala ya liboso oyo Nzambe atángaki likambo ya liwa ezali ntango ayebisaki Adama etumbu oyo akopesa ye soki atosi ye te. Apekisaki Adama kolya mbuma ya nzete moko mpe akebisaki ye ete soki alye yango, ‘akokufa solo.’ (Ebandeli 2:17) Soki Adama ná Eva bátosaka, bango ná bana na bango oyo balingaki kozala sembo epai ya Nzambe balingaki kofanda libela na libela awa na mabele.

Adama aboyaki koyoka likebisi ya Nzambe. Asalaki lisumu ntango atosaki Nzambe te, yango wana akufaki. (Baroma 6:23) Eteni moko te ya nzoto ya Adama ekobaki kozala na bomoi nsima ya liwa na ye. Kutu, ntango akufaki, Adama azalaki lisusu te. Nzambe alobaki na Adama boye: “Na motoki ya elongi na yo okolya limpa kino okozonga na mabele, mpo outaki na yango. Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.” (Ebandeli 3:19) Lokola bato nyonso bautá na Adama, tozwá lisumu mpe liwa epai na ye.​—Baroma 5:12.

Atako Adama aboyaki kotosa, Nzambe akokokisa mokano na ye ya kotondisa mabele na bakitani ya Adama. (Ebandeli 1:28; Yisaya 55:11) Mosika te, Yehova akozongisa na bomoi bato mingi oyo bakufá. Ntoma Paulo alobaki boye mpo na ntango yango: “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”​—Misala 24:15.

Roman, oyo tolobelaki liboso, ayekolaki Biblia mpe ayebaki oyo yango eteyaka mpo na liwa mpe Yehova Nzambe. Makambo oyo ayekolaki, esalisaki ye mingi. Tángá lisolo na ye na “Biblia ebongolaka bato”.