Oyebaki yango?
Mai ya mokanda mpe ekomeli ya lolenge nini bazalaki kosalela na ntango ya kala?
Na nsuka ya mokanda na ye ya misato oyo ezwami na Biblia, ntoma Yoane alobi boye: “Nazalaki na makambo mingi ya kokomela yo, kasi nalingi te kokoba kokomela yo na mai ya mokanda mpe na ekomeli.” Maloba ya Grɛki oyo ntoma Yoane asalelaki emonisi ete alingaki te kokoba kokoma na papirisi mpe na mai ya moindo oyo bakomaka na yango mokanda.—3 Yoane 13.
Bakomeli bazalaki kosalela ekomeli ya papirisi oyo ezalaki makasi mpe molai. Bazalaki kokata ngámbo na yango nyonso mibale tii na nsuka mpo ekóma nsɔngɛ. Mokomeli akokaki kosebisa nsɔngɛ yango lisusu na libanga moko. Papirisi yango ekokanaki na biki ya lelo oyo mpe ezalaki kokoma kaka ndenge moko.
Mpo na kosala mai ya mokanda yango bazalaki kosangisa mputulu ya makala to mputulu ya moindo oyo ebimaka na mwinda mpe mai ya kole ya nzete ya ndembo oyo bazalaki kosalela lokola kole. Bazalaki kotɛka mai ya ekomeli yango ya kokauka mpe bazalaki kosangisa yango malamumalamu ná mai liboso ya kosalela yango. Nsima ya kosalela yango, mai ya ekomeli yango ezalaki kokauka likoló ya papirisi to mposo ya nyama mpe ezalaki kokɔta na kati na yango te. Na nsima mokomeli akokaki kosalela linyuka oyo apɔlisi na mai mpo na kolongola mbeba oyo asali; yango ezalaki mpe moko ya biloko oyo azalaki kosalela. Makambo oyo touti koloba na ntina ya mai ya ekomeli emonisi makanisi oyo bakomeli ya Biblia bazalaki na yango ntango balobelaki kolongolama to kobomama ya nkombo ya moto na buku ya kokanisama ya Nzambe.—Kobima 32:32, 33; Emoniseli 3:5.
Ntoma Paulo azalaki kotonga bahema ya midɛlɛ nini?
Misala 18:3 elobi ete ntoma Paulo azalaki kosala mosala ya kotonga bahema. Na ntango ya kala, bato oyo bazalaki kotonga bahema bazalaki kosalela nsuki ya kamela to ya ntaba mpo na kosala bilamba. Na nsima, bazalaki kosangisa bilamba yango mpo na kosala bahema ya basali-mibembo. Kasi, na ntango wana bazalaki kotonga bahema mingi na mposo ya nyama. Mosusu ezalaki ya lini, mpe bazalaki kosala yango na Tarse, engumba oyo Paulo abotamaki. Ekoki kozala ete Paulo asalelaki biloko yango na mosala na ye. Ntango azalaki kosala elongo na Akila, ekoki kozala ete Paulo asalaki bakapo ya lini oyo bazalaki kozipa yango na porte ya bandako ya bato.
Mbala mosusu ekoki kozala ete Paulo ayekolaki mosala yango na bomwana. Makambo oyo bakutaki na bapapirisi ya Ezipito emonisi ete na boumeli ya eleko oyo Baroma bazalaki koyangela, bana bazalaki koyekola misala na mbula soki 13. Soki Paulo azalaki na mbula wana ntango abandaki mosala yango, boye, na mbula 15 to 16, ayebaki mosala ya kokata bisaleli yango na bamezire ya malamu mpe na nsima azalaki kotonga yango na bitubeli ya ndenge na ndenge mpe kosalela mayele ekeseni ya kotonga. Buku moko (The Social Context of Paul’s Ministry) elobi boye: “Ekoki kozala ete ntango Paulo asilisaki koyekola mosala na ye, bapesaki ye ebele ya bisaleli ya ye moko.” Kaka buku yango ebakisi ete “bambeli mpe bitubeli oyo esɛngamaki mpo na mosala yango ezalaki kopesa moto likoki ya kosala mosala yango esika nyonso oyo ye alingi,” mosala oyo Paulo akokaki kozongela yango mpo na komisalisa na mosala na ye ya misionɛrɛ.