Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosunga bato oyo bakelelá

Kosunga bato oyo bakelelá

“Ye oyo azali na liso ya boboto akopambwama, mpo apesi bilei na ye na moto oyo azangá.”​—MASESE 22:9.

Ntina oyo bato mosusu basalaka fɛti ya Noele.

Bato mosusu balingaka kolanda ndakisa ya Yesu mpo asalisaki babola, bato ya maladi mpe baoyo bazalaki konyokwama. Bamonaka ete ntango oyo ebongi mpo na kosala bongo ezali na Noele, ntango bibongiseli oyo esalisaka bato ya mpasi ebakisaka milende ya kokɔngɔla makabo.

Mokakatano ezali wapi?

Na eleko ya Noele, bato mingi bamipesaka na kosomba biloko, komisepelisa, kokende kotala baninga mpe bato ya libota. Nyonso wana elyaka bango ntango, makasi, to mbongo ya kopesa babola mpe bato oyo bakelelá, to ata mpe makabo ya kopesa na bibongiseli oyo esungaka bato.

Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa?

“Koboya te kosala malamu na baoyo basengeli na yango, ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.” (Masese 3:27) Babola, bato ya nzala, mpe bato ya mpasi banyokwama kaka te na eleko ya Noele. Soki omoni moto moko azali na mposa ya lisungi mpe “lobɔkɔ na yo ezali na nguya” ya kosalisa ye, mpo na nini kozela kaka Noele mpo na kosala yango? Okozwa mapamboli mpo na boboto mpe motema mawa oyo omonisi.

“Mokolo nyonso ya liboso na pɔsɔ, mokomoko na bino na ndako na ye mpenza abomba mwa eloko pembeni na kotalela biloko oyo azali na yango.” (1 Bakorinti 16:2) Ntoma Paulo apesaki toli wana epai ya bakristo ya liboso oyo balingaki kosalisa babola. Okoki ‘kotya mwa eloko pembeni’ to kobomba mwa mbongo oyo okoki mbala na mbala kopesa bato to ebongiseli oyo esalelaka mbongo na yango malamu? Na ndenge yango, okomonisa ete okipaka baoyo bakelelá atako ozali kopesa na kotalela makoki na yo.

“Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Baebre 13:16) Simbá ete longola “kokabela bamosusu biloko,” tosengeli mpe kobosana te “kosala malamu” to kosalisa basusu. Na ndakisa, baboti ya mayele balakisaka bana na bango ndenge ya kosalisa mibange na misala ya mokolo na mokolo; kokomela bato ya maladi mikanda, kokende kotala bango to kobenga bango na telefone; mpe kotyela bana mosusu oyo bazali babola to bibɔsɔnɔ likebi. Yango esalaka ete bana bámonisaka boboto mpe bákabelaka basusu na boumeli ya mbula mobimba.

Baboti ya mayele balakisaka bana na bango ndenge ya kosalisa mibange, bato ya maladi mpe bana mosusu oyo bazali konyokwama. Yango esalaka ete bana bámonisaka boboto mpe bákabelaka basusu na boumeli ya mbula mobimba