Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Mpo na nini Nzambe atindaki Yesu awa na mabele?

Mpo na nini Nzambe atindaki Yesu awa na mabele?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Yesu azalaki wapi liboso Nzambe atinda ye awa na mabele?

Yesu azalaki ekelamu ya elimo kuna na likoló liboso ete abotama na Beteleme. Azalaki ekelamu ya liboso oyo akelamaki mbala moko na Nzambe ye moko. Na yango, ebongi mpenza abengama mwana se moko ya Nzambe oyo abotamaki. Kuna na likoló, azalaki mbala na mbala kosala lokola molobeli ya Nzambe. Yango wana babengaka ye Liloba. Apesaki mpe Nzambe mabɔkɔ mpo na kokela biloko mosusu nyonso. (Yoane 1:2, 3, 14) Yesu afandaki ná Nzambe kuna na likoló bambula mingi liboso ete Nzambe asala bato.​—Tángá Mika 5:2; Yoane 17:5.

2. Ndenge nini Nzambe atindaki Mwana na ye awa na mabele?

Yehova alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria na lisalisi ya elimo santu. Na yango, Maria azwaki zemi ya Yesu kozanga ete asangisa nzoto ná mobali. Anzelu apesaki sango ya kobotama na ye epai ya babateli ya bampate oyo bazalaki kobatela bitonga na bango libanda na butu. (Luka 2:8-12) Na yango, Yesu abotamaki te na eleko ya malili makasi, kasi ekoki kozala nde na ebandeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ntango molunge ezalaki naino. Mwa moke na nsima, Maria ná Yozefe bakendaki kofanda na mboka na bango na Nazarete epai babɔkɔlaki Yesu. Yozefe azalaki tata-mobɔkɔli ya Yesu.​—Tángá Matai 1:18-23.

Ntango Yesu azwaki batisimo, azalaki na mbula soki 30 mpe Nzambe alobaki polele ete Yesu azali mwana na ye. Na nsima abandaki mosala oyo Nzambe atindaki ye asala.​—Tángá Matai 3:16, 17.

3. Mpo na nini Nzambe atindaki Yesu awa na mabele?

Nzambe atindaki Yesu mpo na koteya bato solo. Yesu ateyaki bato Bokonzi ya Nzambe; guvɛrnema ya likoló oyo ekotya kimya na mokili mobimba. Apesaki bato elikya ya bomoi ya seko. (Yoane 4:14; 18:36, 37) Yesu ateyaki mpe bato makambo mingi oyo etali ndenge ya kozwa bolamu ya solosolo. (Matai 5:3; 6:19-21) Azalaki koteya na bandakisa. Na ndakisa, amonisaki ndenge ya kosala mokano ya Nzambe ata na ntango ya mpasi. Ntango azalaki konyokwama azalaki kozongisa mabe na mabe te.​—Tángá 1 Petro 2:21-24.

Yesu ateyaki bayekoli na ye bolingo ya solosolo. Atako azalaki na esika moko ya lokumu na likoló ná Tata na ye, na komikitisa nyonso atosaki ye mpe ayaki kofanda awa na mabele ná bato. Moto moko te akoki kopesa biso ndakisa malamu ya bolingo lokola oyo ya Yesu.​—Tángá Yoane 15:12, 13; Bafilipi 2:5-8.

4. Liwa ya Yesu epesi biso libaku nini?

Nzambe atindaki mpe Yesu mpo akufa mpo na masumu na biso. (Yoane 3:16) Biso nyonso tozali basumuki, elingi koloba tozali bato ya kozanga kokoka mpe ya masumu. Yango wana tobɛlaka mpe tokufaka. Nzokande, Adama moto ya liboso azalaki moto ya kokoka. Lokola azalaki na lisumu te akokaki kokufa te mpe kobɛla te. Kasi lokola atosaki Nzambe te, akómaki moto ya kozanga kokoka. Tozwá lisumu epai ya Adama mpe lifuti na yango ezali liwa.​—Tángá Baroma 5:12; 6:23.

Yesu azalaki moto ya kokoka, yango wana akufaki te mpo asalaki masumu kasi akufaki nde mpo na masumu na biso. Liwa na ye epesi biso libaku ya kozwa bomoi ya seko mpe mapamboli ya Nzambe.​—Tángá 1 Petro 3:18.