Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nsukansuka, nazwaki bonsomi ya solosolo!

Nsukansuka, nazwaki bonsomi ya solosolo!

Mokonzi moko ya bɔlɔkɔ alobaki na ngai na kotyola nyonso ete: “Moto moko te azali koluka bino. Bokoki kotikala awa.” Ndenge nini biso bato ya Russie, oyo tozalaki kosala mosala makasi mpe tozalaki na kimya na libota, tokómaki bato ya bɔlɔkɔ na Corée du Nord na 1950, mbula soki mitano nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?

MIKANDA na ngai ya Leta emonisi ete nabotamaki na 1924. Emonani ete ezalaki na mboka Shmakovka mosika mpenza na ɛsti ya Russie, pembeni ya ndelo ya ekólo Chine.

Mboka Shmakovka, Primorskiy Kray, mosika mpenza na ɛsti ya Russie, esika nabotamaki

Mokolo moko babandi bakangaki tata ná bayaya na ngai ya mibali, mpe banda wana mama atikalá komona bango lisusu te. Atikalaki na bana ebele ya mike, mpe azalaki kokoka mpenza te koleisa bango. Mobali moko ya kartye na biso asɛngaki ye amema biso baoyo tozalaki mike mpenza na esika oyo babɔkɔlaka bitike na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe aloba ete mama asundolaki biso.

Mama andimaki likanisi yango mpo soki aboyaka, mbɛlɛ biso bana na ye ya mike, tolingaki kokufa na nzala. Atako nakómi lelo na mbula koleka 80, nazalaka na bɔtɔndi ndenge mama atindáká biso kuna. Mbala mosusu yango nde ebikisaki bomoi na biso. Ata bongo, ekateli na ye esalaka ngai kaka mpasi.

Ntango ngai ná Ivan tobalanaki, na 1941

Na 1941, nakendaki kofanda na Corée, epai nabalanaki na Ivan, mobali moko malamu, ya ekólo Russie. Olya mwana na biso ya mwasi abotamaki na 1942 na engumba Séoul, na Corée. Kolya mwana na biso ya mobali abotamaki na 1945, mpe Zhora leki na ye abotamaki na 1948. Mobali na ngai azalaki kobatela magazini na biso mpe ngai nazalaki kotonga bilamba. Lokola Séoul ezalaki koyangelama na bato ya Japon, atako tozalaki koloba monɔkɔ ya Russie na ndako, bana na biso bazalaki koloba monɔkɔ ya Japonais. Tii na 1950, mwa kimya ezalaki kati na bato ya Russie, ya Amerika mpe ya Corée na Séoul. Bango nyonso bazalaki bakiliya ya magazini na biso.

Basoda ya Corée du Nord bakangi biso

Lokola kobɛta ya nkake, na 1950 makambo nyonso ebongwanaki. Basoda ya Corée du Nord babɔtɔlaki Séoul. Lokola mwayɛ ya kokima ezalaki te, bakangaki biso ná basivile mosusu oyo bazalaki mpe bapaya. Totambolaki na boumeli ya mbula misato na ndambo, na bisika ndenge na ndenge ya Coré du Nord ná bato mosusu ya Angleterre, ya Russie, ya Amerika mpe ya France oyo bakangamaki na bitumba. Mpo na kokima babɔmbi tozalaki kofanda na bandako nyonso oyo ekokaki kobatela biso.

Na bantango mosusu tozalaki kofanda na ndako oyo ezali na mwa molunge mpe bazalaki kopesa biso biloko mwa mingi ya kolya. Kasi, mbala mingi tozalaki kolya kaka mbuma ya miyɛ mpe kolala na malili, na bandako oyo bato basundolá. Bato mingi oyo tozalaki na bango bakufaki mpo na kozanga kolya malamu mpe mpo bazalaki kokipe bango te. Ezalaki kosala ngai mpasi ntango bana na ngai bazalaki konyokwama. Eleko ya malili ezalaki kobanda noki na Corée du Nord. Nakanisaka lisusu ndenge nazalaki kofanda pembeni ya mɔtɔ butu mobimba, kotyaka mabanga na mɔtɔ mpo bana bazwa mwa molunge.

Na eleko ya molunge, bato mosusu ya mboka Corée bazalaki kolakisa biso bambuma to biloko mosusu ya zamba oyo balyaka mpe tozalaki koluka matungulu, framboise, bambuma ya vinyo mpe mayebo. Ezali polele ete bato ya mboka yango bazalaki koyina biso te, bazalaki nde koyokela biso mawa. Nayekolaki ndenge ya kokanga mimbemba (grenouilles) mpo na kobakisa na bilei na biso oyo ezalaki moke mpenza. Ezalaki koswa ngai na motema ndenge bana na ngai bazalaki ntango nyonso kosɛnga mimbemba.

Mokolo moko na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, balobaki na biso tókende na Manp’o. Bayebisaki biso ete bakopesa basharɛti oyo ngɔmbɛ ebendaka mpo emema bato ya maladi ná bana mike. Olya ná tata na ye batambolaki ná bato mosusu na makolo. Mikolo mingi, ngai ná baleki na ye tozelaki motema likoló, ete basharɛti eya. Nsukansuka eyaki.

Bakangami oyo bazalaki maladi batyaki bango liboke lokola basaki ya masango na basharɛti yango. Ezalaki nsɔmɔ mpo na kotala! Namemaki Zhora na mokɔngɔ, mpe namekaki kotya Kolya na nsuka ya sharɛti, kasi agangaki na kolela: “Mama, mama, nalingi natambola elongo na yo! Kotika ngai te!”

Kolya azalaki nsima na ngai, mwa lobɔkɔ na ye ya moke esimbaki jipe na ngai ntango azalaki kokima mbangu mpo atikala nsima te. Na boumeli ya mobembo yango oyo eumelaki mwa mikolo, babɛtaki bakangami mingi masasi. Ebele ya bandɛkɛ ezalaki kolanda mpo na kolya bibembe oyo ezalaki kotikala na nsima. Nsukansuka, tokutanaki lisusu na mobali na ngai mpe Olya. Tolelaki mpe toyambanaki. Butu yango, nalalaki te mpe nazalaki kotya mabanga na mɔtɔ. Sikoyo nazalaki na kimya mpo bana na ngai nyonso bazalaki kozwa mwa molunge.

Na 1953, ntango tokómaki pembeni ya ndelo oyo ekaboli Corée du Nord na Corée du Sud (38e parallèle), bomoi na biso ekómaki mwa malamu. Bapesaki biso ba-iniforme ya pɛto, basapato, mampa ata mpe babɔmbɔ. Eumelaki te, batikaki bato ya Angleterre bákende, mpe na nsima bato ya France mpe bakendaki. Kasi, biso tozalaki na ekólo te. Ntango bakangami ya nsuka bakendaki, totikalaki biso moko. Tokómaki kolela mpo elikya ezalaki te mpe tozalaki kokoka kolya te. Na ntango yango nde mokonzi ya basoda ya Corée alobaki na biso maloba mabe, oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo.

Bomoi ya sika na États-Unis

Likambo ya kokamwa, eumelaki te bamemaki biso na esika oyo basoda bazalaki te, na Corée du Sud. Ntango basoda ya Amerika basilisaki kotuna biso mituna, bandimaki tókende kofanda na États-Unis. Tokendaki na masuwa na San Francisco, Californie, epai ebongiseli moko oyo esalisaka babola eyambaki biso. Na nsima, tokendeki kofanda na Virginie, mpe bato oyo toyebanaki na bango basalisaki biso mpo tóbanda komisalisa biso moko. Nsukansuka, tokendeki kofanda na Maryland mpo na kobanda bomoi ya sika.

Ngai ná mobali na ngai mpe bana na biso mibale, na 1954

Ata biloko ya mike lokola masini oyo elongolaka bosoto ezalaki kokamwisa biso. Lokola tozalaki bapaya na ekólo moko ya sika, tozalaki kosala mosala mingi mpe ya makasi. Kasi, ezalaki kopesa ngai mawa komona ndenge bato oyo bamesanaki na bomoi na esika yango, bakómaki kobuba bato ya sika. Ntango tokómaki kuna, eumelaki te tokutanaki na sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie oyo alobaki na biso boye: “Bozali sikoyo na mabele moko oyo epambwamá. Soki bolingi kokende liboso, bóboya bato ya ekólo na bino.” Esalaki ngai mpasi mpe elekelaki ngai. Namitunaki soki ezali mabe kosalisana.

Na 1970, mobali moko na nkombo Bernie Battleman, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, ayaki kotala biso mpo na kosolola na biso likambo moko na Biblia. Azalaki mobali moko makasi, azalaki koloba na mpiko lokola kaka moko na biso. Tosololaki bangonga mingi. Lokola nakolaki na esika babɔkɔlaka bitike na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, nakangaki mateya ya lingomba yango na motó. Kasi, nakanisaki ata mokolo moko te kozala na Biblia! Bernie amemelaki biso Biblia moko mpe alobaki boye: “Napesi bino Biblia oyo mpo nalingaka bino.” Alakisaki mpe biso Ben, Motatoli moko ya Yehova ya Belarus, oyo azalaki koloba monɔkɔ ya Russe.

Na boboto nyonso, Ben ná mwasi na ye bayanolaki mituna na ngai na Biblia. Ata bongo, nazalaki kondima ete Batatoli ya Yehova babebisaki makomi mosantu. Nasilikaki mpenza mpo mikanda na bango ezalaki koloba ete Maria abotaki mpe bana mosusu, nzokande eglize na biso eteyaki bongo te.

Nabengaki moninga moko ya ekólo Pologne mpe nasɛngaki ye atala na Biblia na ye ya Polonais soki Matai 13:55, 56 elobi nini. Ntango atángelaki ngai vɛrsɛ yango, nakamwaki ntango namonaki ete Yesu azalaki mpenza na baleki! Moninga yango abengaki mpe moto moko oyo ayebanaki na ye, oyo azalaki kosala na bibliotɛkɛ moko na Washington mpo atala vɛrsɛ yango na Babiblia nyonso oyo ezalaki kuna. Alobaki ete Babiblia yango nyonso elobi kaka ndenge moko: Yesu azalaki na baleki ya basi mpe ya mibali!

Nazalaki lisusu na ebele ya mituna. Mpo na nini bana bakufaka? Mpo na nini bikólo ezali kobunda? Mpo na nini bato bayokanaka te, ata soki balobaka monɔkɔ moko? Biyano oyo nazwaki na Biblia esepelisaki ngai mingi. Nayekolaki ete mokano ya Nzambe ezali te ete bato bányokwamaka. Nasepelaki mingi ntango nayebaki ete nakomona lisusu bandeko na ngai oyo bakufaki na bitumba ndenge na ndenge. Mokemoke, Yehova akómaki moto ya solo mpo na ngai.

Mokolo moko, ngai ná mwana na ngai oyo autaki bitumba na vietnam mpe azalaki kotungisama mingi na makanisi, totɛlɛmaki liboso ya bikeko na ngai mpo na kosɛnga Nzambe lisalisi. Mbala moko, namonaki ete nasengeli nde kobondela Yehova Nzambe ya bomoi, kasi bikeko te. Napanzaki bikeko yango mpe namonaki ete ezalaki kaka mwa bapapye ya aluminium oyo nasombaki na eglize. Kasi, na butu wana, nabwakaki yango.

Ezalaki pɛtɛɛ te kotika eglize oyo nakolá na yango. Kasi, nakómaki kozwa mateya ya Biblia na valɛrɛ koleka eloko mosusu nyonso. Nsima ya mbula moko, ngai ná mobali na ngai mpe mwana na biso ya mwasi, tokendaki epai ya sango ya Ɔrtɔdɔkse oyo azalaki moto ya Russie. Nazalaki na papye moko oyo nakomaki mituna oyo ezalaki mpe na bavɛrsɛ ya Biblia pembeni. Ntango nazalaki kotánga bavɛrsɛ yango na mongongo makasi, sango yango azalaki koningisa motó mpe koloba, “obungi nzela.” Ayebisaki biso ete tómeka lisusu te kotya makolo na ndako na ye.

Likambo yango ekamwisaki Olya, mwana na ngai oyo azalaki na mpiko mpe azalaki kolinga koyeba makambo mingi. Ye mpe akómaki koyekola Biblia malamumalamu mpe eumelaki te akómaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova elongo na ngai. Nazwaki batisimo na 1972, mpe Olya azwaki na mbula oyo elandaki.

Likambo oyo tozalaki koloba na libota na biso

Soki na 1990, na jardin ya lopango na ngai na Maryland, États-Unis

Tozalaki koloba boye: Tyá miso na makambo ya lelo, bosaná oyo eleká. Yango wana, tozalaki kokakatana te kosala eloko moko ya sika soki tondimisami mpenza ete ezali malamu. Ntango ngai ná Olya tokómaki mpenza baninga ya Nzambe, tokómaki na mposa makasi ya kokende na bandako ya bato mpe koyebisa bango makambo oyo tozalaki koyekola. Naboyi te, na ebandeli, nazalaki koloba polelepolele mpe na boboto te yango wana bato oyo tozalaki kobima na bango na mosala ya kosakola bazalaki kolimbolela bato makambo yango na ndenge ya boboto mpe na mayele. Kasi, na nsima, nayekolaki ndenge ya kosolola na bato ya mikili mpe mimeseno ndenge na ndenge, oyo bazalaki koluka bomoi moko ya malamu lokola ngai.

Na boumeli ya bambula oyo elandaki, ngai ná mwana na ngai ya mwasi tozalaki mbala mingi koloba ete soki politiki ya bakoministe ekwei, tokokende na Russie kosalisa bato báyeba Nzambe. Ntango ekweaki na ebandeli ya bambula 1990, Olya akokisaki ndɔtɔ na biso. Akendaki na Russie mpe na boumeli ya mbula 14 alekisaki ngonga mingi na mosala ya kosakola. Ayekolaki Biblia na bato ebele mpe apesaki mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia; kolongola yango na lingelesi mpe kobongola yango na monɔkɔ ya Russie na biro ya Batatoli ya Yehova ya ekólo yango.

Lelo oyo nakangamá na mbeto na ngai mpe, bana na ngai basalaka nyonso oyo bakoki mpo nazala na bomoi ya malamu. Napesaka Nzambe mersi mpamba te atako nanyokwamaki bambula mingi na bolenge na ngai, nakómi mpenza na bomoi ya malamu koleka. Namoni mpenza kokokisama ya maloba ya Nzembo oyo Davidi akomaki: “[Nzambe] Atambwisaka ngai na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi. Azongiselaka molimo na ngai makasi. Akambaka ngai na banzela ya boyengebene mpo na nkombo na ye.”​—Nzembo 23:2, 3. *

^ par. 29 Maria Kilin akufaki na mokolo ya 1 Marsi 2010, ntango tozalaki naino kobongisa lisolo ya bomoi na ye mpo na kobimisa yango.