Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge oyo bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto na ntango ya kala

Ndenge oyo bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto na ntango ya kala

Biloko ya kobongisa nzoto oyo basi mosusu bazalaki kosalela na ntango ya kala ezalaki na biloko ya kotya na miso, na elongi mpe ya kopakola na loposo

Nsima ya kosukola, mwasi azalaki kopakola mafuta ya nsolo kitoko na loposo na ye ya sɛmbɛsɛmbɛ. Na nsima azalaki mpe kofungola kɛsi moko kitoko ya langilangi, oyo ezalaki na ebele ya milangi ya mikemike, bilokó ná bambɛki oyo esalemaki na talatala, mpɛmbɛ ya nzoku, ndako ya mbɛmbɛ to libanga. Biloko yango ezalaki na mitindo ndenge na ndenge ya mafuta mpe malasi oyo ezalaki na nsolo ya balsame, kardamome, kinamono, olibana, mafuta ya nzoi, mire mpe biloko mosusu ya ndenge wana.

Mwasi azalaki kozwa na kɛsi balutu oyo ebongisamá malamu, basaani mpe mabakuli. Azalaki kosalela yango mpo na kosangisa biloko ya monzɛlɛ oyo aponaki mpo na mokolo wana. Azalaki komitala na talatala ya bronzɛ, mpe azalaki kopakola biloko yango na mayele.

EMONANI ete banda kala mpenza, basi bazalaki kosala nyonso mpo bázala bonzenga. Mayemi ndenge na ndenge oyo ezali na malita ya kala emonisi ete bato mingi ya Mezopotamia mpe ya Ezipito bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto. Biloko oyo basi ya Ezipito bazalaki kopakola na miso, ndenge tomonaka na bililingi, ezalaki mpenza kosepelisa bato.

Ezali boni mpo na Bayisraele? Basi ya ekólo yango bazalaki mpe kosalela biloko ya kobongisa nzoto? Soki ɛɛ, ezalaki ya lolenge nini? Toboyi te, ezali ata na liyemi moko te na malita ya kala ya Bayisraele oyo ekoki komonisa biso yango. Kasi, masolo mosusu ya Biblia mpe biloko ndenge na ndenge oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na mikili oyo Biblia elobeli, ekoki kosalisa biso mwa moke tómona ndenge bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto na ntango ya kala.

Biloko oyo bazalaki kosalela

Basaani ya libanga oyo bazalaki kotya biloko ya kobongisa nzoto, Yisraele

Bato ya arkeoloji bakundolaki na mabele ya Yisraele, biloko ebele oyo ezali na boyokani na biloko ya kobongisa nzoto mpe bamalasi. Na biloko oyo bamonaki, tokoki kotánga: mabakuli ya libanga mpo na konika mpe kosangisa biloko ya kosala monzɛlɛ, molangi ya malasi oyo ezali lokola tiyo, bilokó ya mafuta ya alabasita, mpe talatala ya mabɔkɔ oyo basalá na bronzɛ ya sɛlisɛli. Lutu moko oyo basalá na mpɛmbɛ ya nzoku ezalaki na liyemi ya nkasa ya mbila na ngambo ya esimbeli na yango mpe na ngambo mosusu, motó ya mwasi oyo bibenga ezingi yango.

Emonani ete ndako ya mbɛmbɛ oyo batya mayemi ezalaki esaleli oyo bazwi bazalaki kosalela mpo na kotya biloko ya monzɛlɛ. Bamonaki na Ezipito mpe na esika oyo Kanana ezalaká, balutu ya mike oyo basalá na mpɛmbɛ ya nzoku to na nzete; mosusu batyá yango mayemi ya basi oyo bazali kobɛta mai mpe mayemi mosusu ya kitoko mpenza. Nyonso wana esalisi biso tómona ndenge oyo basi ya ntango ya kala bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto.

Mpo na miso

Na Biblia, mwana mwasi moko ya Yobo nkombo na ye “Kerene Hapuke.” Na Ebre, nkombo yango ekoki kolimbola “liseke (liso) oyo bapakolá langi ya moindo,” elingi koloba kɛsi moko oyo bazalaki kosalela mpo na kobomba biloko ya monzɛlɛ, mbala mosusu tilɛ ya moindo oyo batyaka na miso. (Yobo 42:14) Ekoki kozala ete bapesaki ye nkombo wana mpo na kitoko na ye, kasi emonisi mpe ete bato bayebaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto na ntango wana.

Simbá ete mbala mingi oyo Biblia elobeli kosala mayemi na miso, elobelaka nde basi ya bizaleli mabe lokola Yezabele mpe Yerusaleme oyo ezalaki sembo te, oyo na ndenge ya elilingi, mosakoli Yirimia ná Ezekiele babengaki yango mwasi ya ndumba. (2 Bakonzi 9:30; Yirimia 4:30; Ezekiele 23:40) Na kotalela ebele ya bakɛsi to milangi ya talatala to ya mabanga oyo ezalaki na bisaleli mikemike ya kotya tilɛ na miso, oyo bato ya arkeoloji bakundolaki, emonani ete ntango Yisraele epɛngwaki, basi mingi, mingimingi oyo bazalaki na mabota ya bakonzi to ya bazwi, bakómaki kolanda bizaleli ya basi bapakano oyo bazalaki kotondisa biloko ebeleebele ya monzɛlɛ na miso.

Mafuta ya nsolo kitoko mpo na mosala mosantu to ya bato nyonso

Kobimisa mpe kosalela malasi oyo esalemi na mafuta ya olive ebanda kala na Yisraele. Mokanda ya Kobima elobeli lolenge ya kosala mafuta mosantu oyo banganga-nzambe bazalaki kosalela na tempelo. Bazalaki kosangisa kinamono ná mire, mpe banzete mosusu ya nsolo kitoko. (Kobima 30:22-25) Bato ya arkeoloji bamonaki na Yerusaleme esika moko oyo bakanisi ete ezali esika oyo bazalaki kosala mpaka ya malasi oyo bazalaki kosalela na tempelo na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Ezali na bavɛrsɛ mingi oyo elobeli mafuta ya nsolo kitoko, ezala mpo na mosala mosantu to oyo bato bango moko bazalaki kosalela mokolo na mokolo.​—2 Ntango 16:14; Luka 7:37-46; 23:56.

Molangi ya malasi oyo basalá na lima, Yisraele

Lokola mai ezalaki mingi te na Yisraele, bato bazalaki kosepela kosalela mafuta ya nsolo kitoko mpo na kobakisa bopɛto na bango ya mokolo na mokolo. Bazalaki kosalela mafuta kaka te mpo na kobatela loposo na eleko ya molunge makasi, kasi mpe mpo na kobongisa nzoto. (Ruta 3:3; 2 Samwele 12:20) Liboso ete bamema ye epai ya Mokonzi Ahasueruse, Estere, elenge mwasi moko Moyuda, azwaki nkisi ya kobongisa nzoto na boumeli ya sanza 12; banyɔlisaki ye nzoto na boumeli ya sanza motoba na mafuta ya mire mpe sanza motoba mosusu na mafuta ya balsame.​—Estere 2:12.

Bazalaki kozwa malasi to mafuta ya nsolo kitoko na valɛrɛ ndenge moko na palata mpe wolo. Ntango mokonzi-mwasi ya Sheba asalaki mobembo moko molai mpo na kotala Mokonzi Salomo, na biloko oyo amemelaki ye ezalaki mpe na wolo, mabanga ya ntalo mpe mafuta ya balsame. (1 Bakonzi 10:2, 10) Ntango Mokonzi Hizikiya alakisaki bato oyo bautaki na Babilone bozwi ya ndako na ye, alakisaki na lolendo nyonso “mafuta ya balsame ná mafuta kitoko,” elongo na palata, wolo mpe ebombelo mobimba ya bibundeli na ye.​—Yisaya 39:1, 2.

Lokola ezalaki kosɛnga kosalela ebele ya bafololo, ya bambuma, ya nkasa, ya ndembo, mposo ya nzete oyo ebimisaka mpaka, kaka mpo na kosala mwa malasi, yango wana ezalaki komonana mpenza te mpe ezalaki na valɛrɛ mingi. Biblia etángi ebele ya banzete ya nsolo kitoko, na ndakisa nzete ya aloe, ya balsame, ya bedeliume, ya nkokó, ya kasia, ya kinamono, ya olibana, ya mire, ya safra, mpe ya narde. Banzete yango mosusu ezalaki kokóla na lobwaku ya Yordani. Mosusu mpe ezalaki kouta na Inde, na sudi ya Arabie mpe na bisika mosusu. Bazalaki koya na yango na banzela oyo eyebanaki na bato ya mimbongo.

Mafuta ya balsame oyo Biblia elobeli

Biblia elobeli mafuta ya balsame na lisolo ya mokonzi-mwasi Estere, mokonzi-mwasi ya Sheba mpe Mokonzi Hizikiya ndenge tomoni yango awa na likoló. Na 1988, bamonaki mbɛki moko ya moke ya mafuta na libulu moko pembeni ya Qumrân, na libongo oyo ezali na wɛsti ya Mbu Ekufá. Yango ebimisaki mituna ndenge na ndenge. Ezalaki nde mbɛki ya mafuta ya balsame ya nsuka oyo etikalaki? Bato oyo basalaka bolukiluki bapesi eyano te na motuna yango. Tii lelo oyo, baloni-bilanga bazali koluka kozongisa lisusu banzete ya balsame wana oyo ekenda nsango.

Mbeki oyo esalemi na mpɛmbɛ ya nzoku, Yisraele

Makambo mingi emonisi ete bazalaki kolona banzete ya mafuta ya balsame oyo Biblia elobeli pembenipembeni ya Ene-gedi. Bakundolaki biloko lokola: bafulu ya mɔtɔ, bilokó, bibende mpe biloko basalá na mikuwa, ya siɛklɛ ya motoba liboso ya ntango na biso; oyo ekokani na oyo bazalaki kosalela na bisika mosusu mpo na kosala malasi. Bato mingi ya mayele bandimaka ete nzete ya balsame eutá na Arabie to na Afrika. Bazalaki kosalela mai ya nzete mpo na kosala malasi. Lokola mafuta ya balsame ezalaki na valɛrɛ mingi, bato bazalaki kolinga te koyebisa basusu ndenge ya kolona mpe ya kosala malasi na yango.

Bazalaki kutu kosalela mafuta ya balsame mpo na makambo mosusu ya politiki. Na ndakisa, Josèphe moto moko ya istware alobi ete Marc Antoine azwaki liboke ya banzete yango ya ntalo mpe apesaki yango kado epai ya Cléopâtre, mokonzi-mwasi ya Ezipito. Pline, moto mosusu ya istware ya Rome alobi ete na boumeli ya bitumba ya Bayuda na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, Bayuda oyo bazalaki kobunda balukaki kobebisa banzete nyonso ya balsame mpo Baroma bazwa yango te.

Biblia mpe biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni esalisi biso tómeka komona ndenge bato ya ntango ya kala bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto. Na esika epekisa kosalela biloko ya kobongisa nzoto mpe monzɛlɛ, Biblia elobi nde ete tósalela yango na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu. (1 Timote 2:9) Ntoma Petro alobaki ete “elimo ya kimya mpe ya boboto” ezali na “motuya monene na miso ya Nzambe.” Lokola midɛlɛ ya kolata to ya kosala monzɛlɛ ezali se kobongwana, toli yango ezali na ntina mingi mpo na basi bakristo, ezala mikóló to bilenge.​—1 Petro 3:3, 4.