Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Epai ya batángi

Epai ya batángi

Zulunalo oyo ozali kotánga ebandaki kobimisama na 1879, na sanza ya nsambo. Bandá ntango wana, makambo mingi ebongwani; yango wana zulunalo oyo mpe etikali nsima te. (Talá bafɔtɔ oyo ezali awa na likoló.) Kobanda na nimero oyo, makambo mosusu ebongwani na zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Makambo nini ebongwani?

Na mikili mingi, bato mingi basepelaka koluka bansango na Internet. Bakoki kotánga ebele ya bansango oyo ezalaka kaka na Internet, soki bafini mwa moke souris ya ordinatɛrɛ na bango. Bakoki kotánga babuku mpe bazulunalo mingi na Internet.

Lokola bato mingi basepelaka kotánga makambo na Internet, tobongoli adrɛsi ya site na biso na www.pr418.com, mpo ekóma malamu lisusu mpe mpasi te mpo na kosalela. Bato oyo bakɔtaka na site yango bakoki kotánga mikanda na biso oyo ebimá na minɔkɔ koleka 430. Kasi, kobanda sanza oyo, bakobanda mpe kotánga masolo oyo toponi, oyo ezalaki kobima mbala na mbala na zulunalo oyo, kasi ekobanda sikoyo kobima kaka na site na biso. *

Lokola masolo mingi ekómi kobima kaka na Internet, kobanda na nimero oyo, zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ezali lisusu na nkasa 32 te, ekómi nde na nkasa 16. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali sikoyo kobimisama na minɔkɔ 204. Lokola ezali lisusu na nkasa mingi te, ekoki sikoyo kobongolama na minɔkɔ mingi koleka.

Tozali na elikya ete mbongwana oyo ekopesa biso likoki ya kosalisa bato mingi báyoka nsango ya lobiko oyo ezali na Biblia. Tozali na ekateli ya kokoba kopesa bansango ya ntina mpenza na Internet mpe na zulunalo oyo mpo na kosalisa ebele ya batángi na biso oyo bamemyaka Biblia mpe balingaka koyeba makambo oyo yango eteyaka mpenza.

Babimisi

^ par. 5 Na masolo oyo ekobanda kobima kaka na Internet, tokokuta masolo lokola: “Mpo na bilenge,” oyo ebongisami mpenzampenza mpo na bilenge mpe “Mateya ya Biblia mpo na bana,” oyo ebongisami mpo na kosalisa baboti bateya bana na bango ya mbula misato tii na nse.