Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Evanzile ya Yudasi” ezali nini?

“Evanzile ya Yudasi” ezali nini?

NA MOBU 2006, na sanza ya minei, lisolo moko ya kokamwa ebimaki na bazulunalo na mokili mobimba; elobaki ete ekipi moko ya bato ya mayele ebimisaki mpo na bato nyonso, makomi ya kala oyo bautaki komona; makomi yango ebengamaki “Evanzile ya Yudasi.” Bazulunalo yango elobelaki makambo oyo bato ya mayele balobaki ete makomi yango ekobongola makanisi oyo bato bazalaka na yango mpo na Yudasi, moyekoli oyo atɛkaki Yesu. Na kotalela maloba yango ya bato ya mayele, Yudasi azalaki elombe, ntoma oyo ayebaki Yesu malamumalamu, atɛkaki Yesu mpo Yesu ye moko asɛngaki ye asala bongo.

Ezali mpenza makomi ya kala? Soki ezali bongo, emonisi nde makambo mosusu oyo ebombamaki mpo na Yudasi, Yesu Kristo, to bakristo ya liboso? Esengeli nde kobongola ndenge oyo totalelaka Yesu mpe mateya na ye?

NDENGE OYO BAMONAKI “EVANZILE YA YUDASI”

Ndenge oyo bamonaki “Evanzile ya Yudasi” eyebani mpenza te. Na esika bato ya arkeoloji bámona yango mpe bálobela yango, makomi yango emonanaki na mbalakaka na zando oyo batɛkaka biloko ya kala na nsuka ya bambula 1970 to na ebandeli ya bambula 1980. Ekoki kozala bamonaki yango na Ezipito na 1978, na lilita moko oyo basundolá, mbala mosusu na kati ya mobenga moko. Ezalaki moko ya mikanda minei oyo mokomoko na yango ezalaki na esika na yango na codex, (lolenge moko ya buku ya kala) oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Copte (oyo eutá na monɔkɔ oyo bato ya kala ya Ezipito bazalaki koloba).

Lokola ebatelamaki basiɛklɛ ebele na Ezipito, na esika moko oyo ekauká, codex yango ya mposo ya nyama oyo bakangá, ebandaki kobeba nokinoki ntango balongolaki yango na esika wana. Na 1983, balakisaki codex yango epai ya bato ya mayele; kasi ntalo na yango elekaki ndelo, yango wana esombamaki te. Lokola bakipaki mpe babombaki yango malamu te na boumeli ya bambula ebele, codex yango ebebaki nokinoki. Na 2000, mwasi moko ya ekólo Suisse oyo atɛkaka biloko ya kala asombaki yango. Nsukansuka apesaki yango ekipi moko ya bato ya mayele oyo bautá na mikili ndenge na ndenge, oyo basalaka na nse ya litambwisi ya Maecenas, ebongiseli moko oyo etalaka makambo ya kala ya ntɔki mpe na ebongiseli ya La National Geographic Society, oyo bazwaki mokumba ya kozongisa mpe kobongisa lisusu codex yango, oyo biteni na yango mosusu ebebaki makasi mpe ekómaki mikemike. Ekipi yango esengelaki koyeba dati ya codex yango, kobongola yango mpe kolimbola makambo oyo ezalaki na kati.

Mayele oyo basalelaka mpo na koyeba dati ya biloko ya kala (carbone 14), emonisaki ete codex yango ekokaki kozala ya siɛklɛ ya misato to ya minei ya ntango na biso. Kasi, bato ya mayele bakanisaki ete makomi ya “Evanzile ya Yudasi” na monɔkɔ ya Copte, ebongolamaki uta na monɔkɔ grɛki bambula mingi liboso. “Evanzile ya Yudasi” ekomamaki mpenza na eleko nini mpe epai wapi?

“EVANZILE YA YUDASI”​—EVANZILE YA GNOSTIQUE

Mbala ya liboso oyo batángi “Evanzile ya Yudasi,” ezali nde na makomi ya Irénée, moto moko oyo azalaki komibenga mokristo, oyo azalaki mpe mokomi na nsuka ya siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso. Na buku na ye oyo ebengamaki Contre les hérésies, Irénée akomaki boye mpo na moko ya bituluku oyo ye azalaki kotɛmɛla mateya na bango: “Balobi ete Yudasi oyo atɛkaki Yesu ayebaki makambo yango malamumalamu, mpe lokola kaka ye nde ayebaki solo koleka bamosusu, akokisaki mokumba ya kotɛka Yesu. Mpo na ye, biloko nyonso ezala ya likoló mpe ya mabele ekɔtaki mobulu. Babimisi lisolo moko ya boye ya lokuta mpe bapesi yango nkombo Evanzile ya Yudasi.”

“Ezali mpe te Evanzile oyo ekomamaki na eleko ya Yudasi, na moto moko oyo ayebaki ye malamu”

Irénée azalaki na mokano ya komonisa lokuta ya mateya ndenge na ndenge ya bakristo ya Lingomba ya gnostique, oyo bazalaki koloba ete bazalaki na boyebi oyo bamosusu bazalaki na yango te. Lingomba yango ezalaki na bituluku mingi, etuluku mokomoko ezalaki na ndenge na yango ya kolimbola mateya ya bokristo oyo bazalaki kokanisa ete ezali “solo.” Ba-gnostique bazalaki kondima makambo oyo ezalaki na mikanda na bango, oyo epalanganaki mingi na boumeli ya siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso.

Baevanzile wana ya Ba-gnostique ezalaki mbala mingi koloba ete bantoma ya Yesu oyo bayebanaki mingi bakangaki ntina ya mateya na ye te mpe ete ezalaki na mateya ya sekele oyo Yesu ateyaki kaka bato moke oyo aponaki, oyo bakangaki ntina na yango. * Ba-gnostique yango mosusu bazalaki kondima ete mokili oyo tofandi ekeseni mpenza na esika oyo bakufi bakendaka. Na yango, “nzambe mozalisi” oyo makomi ya Ebre elobeli azalaki nde nzambe ya moke, oyo akesenaki na banzambe ndenge na ndenge oyo bango bazalaki kondimela. Moto oyo azalaki na “boyebi” ya solosolo ayebaki “sekele” yango mpe azalaki koluka kosikolama na nzoto ya bomoto.

“Evanzile ya Yudasi” mpe euti na mateya ya ndenge wana. Ebandi na maloba oyo: “Maloba ya sekele oyo Yesu alobaki ntango asololaki na Yudasi Mokeriota, na boumeli ya mikolo mwambe; mikolo misato liboso ete asala elekeli.”

Codex yango ezalaki nde makomi oyo Irénée akomaki, oyo na boumeli ya basiɛklɛ ebele balobaki ete ebungaki? Marvin Meyer, moko ya bato ya ekipi ya liboso oyo batalelaki mpe babongolaki codex yango, alobi ete ndenge Irénée “alobeli na mokuse likambo yango, eyokani malamu na makomi ya Copte, oyo ebengami Evanzile ya Yudasi.”

NDENGE OYO BALOBELI YUDASI NA EVANZILE YANGO EBIMISI NTEMBE KATI NA BATO YA MAYELE

Na “Evanzile ya Yudasi,” Yesu azali kosɛka bayekoli na ye na kotyola nyonso ntango bamonisi ete bazangi boyebi. Kasi, Yudasi azali moko kati na bantoma 12 oyo amonisi ete ayebi Yesu malamumalamu. Yango wana, Yesu ayebisi ye “sekele etali bokonzi” na esika ya bango mibale.

Ekipi ya liboso ya bato ya mayele oyo ebongolaki “Evanzile ya Yudasi,” elandaki ndenge oyo Irénée alobelaki yango. Na libongoli na bango, Yudasi azali moyekoli oyo Yesu azali kolinga mingi, oyo azali kokanga ntina ya mabombami mpe “kokɔta” na “bokonzi.” Bantoma oyo babungaki nzela bakotya moto mosusu na esika ya Yudasi, kasi na nsima, Yudasi akokóma “elimo ya zomi na misato” oyo “akoleka [bayekoli mosusu] nyonso” mpo Yesu alobaki na ye boye: “okotɛka nzoto na ngai ya bomoto.”

Bakomi oyo babuku na bango etɛkamaka mingi, na ndakisa Bart Ehrman mpe Elaine Pagels, oyo bazali mpe bato ya mayele oyo bakendá nsango na makambo etali bakristo ya liboso mpe mateya ya Ba-gnostique, babimisaki nokinoki makambo oyo bayekolaki mpe bandimbola ya “Evanzile ya Yudasi” oyo ekokanaki na libongoli oyo ekipi ya liboso esalaki. Kasi, mwa moke na nsima, bato mosusu ya mayele, na ndakisa April DeConick mpe Birger Pearson, bamitungisaki na likambo yango. Balobaki ete La National Geographic Society ewelaki kobimisa makomi wana ya kala kaka mpo na kobenda likebi ya bapanzi-nsango. Balobaki mpe ete ekipi yango elandelaki te makambo oyo esɛngamaka liboso ya kobimisa makomi moko boye.

Ata moto moko te kati na bato ya mayele oyo batalelaki makomi yango alobi ete ezali na makambo ya solosolo

Atako basalaki mosala yango moto na moto na esika na ye, DeConick ná Pearson balobaki ete ekipi ya liboso oyo ebongolaki codex yango, ebongolaki mabe baparagrafe na yango mosusu ya ntina. Ndenge oyo DeConick abongisaki makomi yango emonisi ete Yesu abengaki Yudasi “Demo ya zomi na misato,” kasi te “Elimo ya zomi na misato.” * Yesu alobaki mpe na Yudasi polele ete akokɔta na “bokonzi” te. Na esika ‘aleka’ bayekoli mosusu, Yesu alobaki na Yudasi boye: “Okosala mabe mpenza koleka bango nyonso. Mpamba te okotɛka nzoto na ngai ya bomoto.” Mpo na DeConick, “Evanzile ya Yudasi” ezali masɛki ya Ba-gnostique oyo etyolaka bantoma nyonso. Na maloba na bango ya nsuka, DeConick ná Pearson bamonisi ete na “Evanzile ya Yudasi,” Yudasi azali elombe te.

“EVANZILE YA YUDASI” EKOKI KOTEYA BISO NINI?

Ezala soki bazalaki komona ete Yudasi ya Evanzile yango azali elombe to demo, ata moto moko te kati na bato ya mayele oyo batalelaki makomi yango alobi ete ezali na makambo ya solosolo. Bart Ehrman alobi boye: “Ezali te Evanzile oyo Yudasi akomaki, to oyo bato ya mayele balobi ete ezali ye nde akomaki. . . . Ezali mpe te Evanzile oyo ekomamaki na eleko ya Yudasi, na moto moko oyo ayebaki ye malamu . . . Na yango, ezali te buku oyo ekoki kopesa biso bansango mosusu ya makambo oyo esalemaki ntango Yesu azalaki awa na mabele.”

“Evanzile ya Yudasi” ezali makomi ya gnostique ya siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso, oyo na ebandeli ekomamaki na monɔkɔ ya grɛki. Tii lelo oyo, bato ya mayele bayebi mpenza te soki “Evanzile ya Yudasi” oyo bauti komona ekokani na makomi oyo Irénée alobelaki. Kasi, “Evanzile ya Yudasi” emonisi polele ete ezalaki na ntango moko oyo bakristo ya lokuta bakɔtisaki mateya na bango moko, oyo esalaki ete “lisangá ya bokristo” ekabwana na bituluku ndenge na ndenge. Na esika emonisa ete Biblia elobaka lokuta, “Evanzile ya Yudasi” endimisi nde likebisi oyo bantoma bapesaki; na ndakisa oyo Paulo alobaki na Misala 20:29, 30 ete: “Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, . . . na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.”

^ par. 11 Mbala mingi, bazalaki kopesa Baevanzile yango nkombo na kotalela moto oyo bamonaki lokola ete akangaki ntina ya mateya ya Yesu malamu mpenza, na ndakisa “Evanzile ya Toma” mpe “Evanzile ya Maria Magadalena.” Na nyonso, bamonaki makomi ya kala ya ndenge wana soki 30.

^ par. 18 Bato ya mayele oyo bandimaka likanisi ete na makomi yango Yudasi azali demo oyo ayebaki malamumalamu soki Yesu azali nani koleka bayekoli na ye mosusu, bamonisi ete likambo yango ekokani ná masolo ya baevanzile oyo elobeli ndenge bademo bazalaki komonisa polele soki Yesu azali nani.​—Marko 3:11; 5:7.