Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moize​—Moto ya bolingo

Moize​—Moto ya bolingo

BOLINGO EZALI NINI?

Bolingo elimboli komonisa basusu ete osepelaka na bango mingi mpenza. Moto oyo azali na bolingo amonisaka na maloba mpe na misala ndenge oyo atalelaka baoyo alingaka, ata soki kosala bongo ekosɛnga ye amipimela makambo mosusu.

NDENGE NINI MOIZE AMONISAKI BOLINGO?

Moize amonisaki ete alingaka Nzambe. Ndenge nini? Kanisá lisusu maloba oyo ezali na 1 Yoane 5:3: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye.” Moize azalaki kosala bongo. Atosaki makambo nyonso oyo Nzambe asɛngaki ye asala, ezala mokumba ya mpasi lokola oyo ya kokutana na Farao mokonzi moko ya nguya to oyo ya mpasi te, lokola kobɛta mwa nzete na mai ya Mbu Motane. Moize azalaki kotosa ata soki etinda oyo Nzambe apesaki ye ezalaki mpasi to te. “Asalaki kaka bongo.”​—Kobima 40:16.

Moize amonisaki ete azalaki kolinga Bayisraele. Bayebaki ete Yehova aponaki Moize mpo akamba bato na ye, yango wana bazalaki koya na makambo ndenge na ndenge epai ya Moize. Tozali kotánga boye: “Bato batɛlɛmaki liboso ya Moize banda ntɔngɔ tii mpokwa.” (Kobima 18:13-16) Kanisá naino ndenge Moize azalaki kolɛmba nsima ya koyoka Bayisraele oyo bazalaki koya na makambo na bango epai na ye mikolo nyonso, banda ntɔngɔ tii mpokwa! Ata bongo, Moize azalaki kosepela kosalisa bato wana oyo azalaki kolinga mingi.

Longola koyoka bango, Moize azalaki mpe kobondela mpo na bango. Azalaki kutu kobondela mpo na baoyo basalaki ye mabe! Na ndakisa, ntango yaya na ye Miriame aimaimaki mpo na Moize, Yehova apesaki Miriame maladi ya maba. Na esika asepela na etumbu oyo Miriame azwaki, Moize abondelaki mbala moko mpo na ye; abondelaki boye: “Ee Nzambe, nabondeli yo, bikisá ye, nabondeli yo!” (Mitángo 12:13) Ezali bolingo nde etindaki Moize asala libondeli ya ndenge wana!

MATEYA NINI TOZWI?

Tokoki kolanda ndakisa ya Moize soki tozali kolinga Nzambe na motema mobimba. Bolingo ya ndenge wana etindaka biso tótosa mibeko na ye “na motema.” (Baroma 6:17) Ntango tozali kotosa Yehova na motema mobima, tosepelisaka motema na ye. (Masese 27:11) Biso moko mpe tozwaka matomba. Kutu, ntango tozali kosalela Nzambe na bolingo ya solosolo, tokosuka kaka te na kosala makambo ya malamu, kasi tokosepela nde kosala yango!​—Nzembo 100:2.

Lolenge mosusu oyo tokoki komekola Moize ezali ya kondima komipimela makambo mosusu mpo na komonisela basusu bolingo. Ntango bandeko to baninga na biso bayei koyebisa biso mikakatano na bango, bolingo ekotinda biso (1) tótyela bango likebi mpenza, (2) tómitya na esika na bango to kosala lokola ete likambo yango ezali nde ya biso, mpe (3) bámona mpenza ete tozali komibanzabanza mpo na bango.

Lokola Moize, tokoki kobondela mpo na bato oyo tolingaka. Na bantango mosusu tokoki komona lokola ete tozangi makoki ya kosalisa bango ntango bayebisi biso mikakatano na bango. Tokoki kutu komilela boye: “Nayoki mpasi mpenza, likambo oyo nakoki kosala ezali kaka ya kobondela mpo na yo.” Kasi kobosana te: “Ntango moto ya sembo asali libondeli, libondeli yango ezalaka na nguya mingi mpenza.” (Yakobo 5:16, Biblia The Kingdom New Testament) Kutu, mabondeli na biso ekoki kotinda Yehova asala likambo oyo mbala mosusu akokaki kosala te. Omoni mpenza te ete likambo ya malamu mingi oyo tokoki kosala ezali ya kobondela mpo na bato oyo tolingaka? *

Omoni te ete tokoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Moize? Atako azalaki moto lokola bato nyonso, atiká ndakisa malamu mpenza ya kondima, komikitisa mpe bolingo. Soki tozali komekola mpenza ndakisa na ye, biso moko tokozwa matomba ezala mpe basusu.​—Baroma 15:4.

^ par. 8 Mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso, tosengeli kosala nyonso mpo na kotosa mibeko na ye. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 17 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.