Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

“Azali Nzambe . . . ya bato ya bomoi”

“Azali Nzambe . . . ya bato ya bomoi”

Liwa eleki Nzambe na makasi? Soki moke te! Ndenge nini liwa to “monguna” mosusu nyonso ekoki koleka “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” na makasi? (1 Bakorinti 15:26; Kobima 6:3) Nzambe azali na nguya ya kolongola liwa na nzela ya lisekwa, mpe alaki ete akosala yango na mokili ya sika. * Ndenge nini toyebi ete elaka yango ezali solo? Yesu, Mwana ya Nzambe, ayebisi biso yango na maloba oyo ekoki kopesa biso elikya.​—Tángá Matai 22:31, 32.

Yesu alobaki na basadukai oyo bazalaki kondima lisekwa te boye: “Mpo na likambo ya lisekwa ya bakufi, botángá te oyo Nzambe alobaki na bino ete: ‘Nazali Nzambe ya Abrahama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo’? Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi.” Awa Yesu alobelaki lisolo oyo Nzambe asololaki ná Moize na mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ, na mobu soki 1514 L.T.B. (Kobima 3:1-6) Mpo na Yesu, maloba oyo Yehova alobaki na Moize ete “nazali Nzambe ya Abrahama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo” emonisi ete elaka ya lisekwa ekokokisama mpenza. Ndenge nini?

Tótala naino mpo na nini Yehova alobaki bongo. Ntango Yehova asololaki na Moize, elekaki bambula 329 banda Abrahama akufaki, bambula 224 mpo na Yisaka mpe Yakobo bambula 197. Ata bongo, Yehova alobaki ete “nazali” kasi te “nazalaki” Nzambe na bango. Yehova alobelaki bato yango misato lokola nde bazalaki naino na bomoi. Mpo na nini?

Yesu alimbolaki boye: “Azali [Yehova] Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi.” Kanisá naino mwa moke maloba wana! Soki lisekwa ezalaka te, boye Abrahama, Yisaka, ná Yakobo balingaki kozala bakufi mpo na libela. Soki ezali bongo, Yehova alingaki kozala Nzambe ya bakufi. Mpe yango elingaki komonisa ete liwa eleki Yehova na makasi; lokola nde Yehova azali na nguya te ya kosikola basaleli na ye ya sembo na boombo ya liwa.

Kasi, tokoloba boni mpo na Abrahama, Yisaka, Yakobo mpe basaleli nyonso ya sembo ya Yehova oyo bakufá? Yesu alobaki boye: “Epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:38) Ya solo, mokano ya Yehova ya kosekwisa basaleli na ye ya sembo oyo bakufá ekosalema mpenza; yango wana atalelaka bango lokola nde bazali na bomoi. (Baroma 4:16, 17) Yehova akobatela bato ya ndenge wana na makanisi na ye oyo ezangi nsuka tii na ntango oyo abongisi mpo na kozongisa bango na bomoi.

Yehova aleki mpenza liwa na makasi

Elikya wana ya kokutana lisusu ná bato oyo olingaka, oyo bakufá esepelisi yo? Soki ɛɛ, kobosana te ete Yehova aleki mpenza liwa na makasi. Eloko moko te ekopekisa ye akokisa elaka na ye ya kosekwisa bakufi. Mpo na nini te koyekola makambo mingi oyo etali elaka ya lisekwa mpe Nzambe oyo akokokisa yango? Na ntembe te, kosala bongo ekosalisa yo opusana penepene na Yehova, “Nzambe . . . ya bato ya bomoi.”

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya mibale

Matai 22-28Marko 1-8

^ par. 1 Mpo na koyeba makambo mosusu etali lisekwa ya bakufi na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, talá mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.