Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

“Namonaki, kasi nakokaki kokanga ntina te”

“Namonaki, kasi nakokaki kokanga ntina te”

Ntango nazalaki na mbula mibale na 1975, mama amonaki likambo moko ya mabe na nzoto na ngai. Ntango amemaki ngai, moninga na ye abwakaki eloko moko ya kilo na pavema, mpe esalaki makɛlɛlɛ makasi. Mama amonaki ete nasutukaki ata moke te. Ntango nakómaki na mbula misato, nazalaki kaka koloba te. Na nsima, libota na ngai ezwaki nsango moko mabe; doktɛrɛ ayebisaki bango ete nazali mpenza baba!

Ntango nazalaki naino mwana, baboti na ngai babomaki libala, mpe mama asengelaki kobɔkɔla ngai ná bayaya na ngai mibale ya mibali mpe moko ya mwasi. Na ntango wana na France, bababa bazalaki kotánga te ndenge ezali lelo oyo, mpe na bantango mosusu, mayele oyo bazalaki kosalela mpo na kotángisa bango ezalaki konyokola bango. Ata bongo, banda bomwana, nazalaki na libaku oyo bababa mosusu bazalaki na yango te. Tiká nalimbolela bino.

Ntango nazalaki na mbula soki mitano

Mwa bambula liboso, balakisi mingi bazalaki kokanisa ete mpo na koteya bababa esengeli kosɛnga bango na makasi bátala ndenge monɔkɔ ya molakisi ezali koningana ntango azali koloba. Kutu na France, epai nakolaki, kosalela elobeli ya bajɛstɛ epekisamaki na biteyelo. Bazalaki kutu kokanga mabɔkɔ ya bana mosusu bansinga na mokɔngɔ ntango molakisi azali kotángisa.

Ntango nazalaki naino mwana moke, nazalaki kolekisa bangonga mingi pɔsɔ na pɔsɔ elongo na doktɛrɛ moko oyo asalisaka bana oyo balobaka te. Bazalaki kosimba ngai na mbanga to na motó mpe kotinda ngai na makasi na bimisa mbala na mbala maloba oyo nazalaki kutu koyoka te. Nazalaki kokoka te kosolola ná bana mosusu. Ezalaki bambula moko ya mpasi mpenza mpo na ngai.

Na nsima, ntango nakómaki na mbula 6, batindaki ngai na kelasi ya bababa. Ezalaki mbala ya liboso nakutana na bana mosusu oyo bazalaki bababa. Kuna mpe, elobeli ya bajɛstɛ epekisamaki. Soki tosaleli elobeli yango na kelasi, bazalaki kofina biso misapi to kobenda biso nsuki. Kasi, tobimisaki mayele moko mpo na kosolola na kobombana. Sikoyo, nakómaki kosolola na bana mosusu. Yango ezalaki ebandeli ya mbula minei ya esengo oyo nalekisaki.

Kasi, ntango nakómaki na mbula 10, batindaki ngai na kelasi mosusu ya bana oyo balobaka. Nalɛmbaki nzoto! Nakanisaki ete bababa nyonso bakufi mpe natikali kaka ngai moko na mokili. Lokola libota na ngai ezalaki kolanda toli ya badoktɛrɛ oyo bazalaki kobanga ete nabungisa likoki ya koloba, bayekolaki elobeli ya bajɛstɛ te mpe bapesaki ngai nzela te nazalaka ná bana mosusu oyo bazali bababa. Nabosanaka te mokolo oyo tokendeki epai ya doktɛrɛ moko. Azalaki na buku moko ya elobeli ya bajɛstɛ na mesa na ye. Ntango natalaki bafɔtɔ oyo ezalaki na ezipeli ya buku yango, nalakisaki yango mosapi mpe nalobaki, “nalingi oyo!” Doktɛrɛ abombaki yango nokinoki. *

NABANDI KOYEKOLA BIBLIA

Mama asalaki makasi mpo na kobɔkɔla biso na mateya ya Biblia. Azalaki komema biso na makita ya Batatoli ya Yehova na lisangá ya Mérignac, pembeni ya engumba Bordeaux. Lokola nazalaki mwana, nazalaki kosimba kaka makambo moke na makita. Kasi, bandeko ya lisangá bazalaki kofanda pembeni na ngai moto na moto na ngala na ye mpo na kokomela ngai makambo oyo bazalaki koteya na makita. Bolingo mpe likebi oyo batyelaki ngai esimbaki mpenza motema na ngai. Mama azalaki koyekola na ngai Biblia na ndako, kasi nazalaki mpenza kokanga ntina ya makambo yango te. Namiyokaki lokola mosakoli Danyele oyo, nsima ya kozwa esakweli epai ya anzelu alobaki: “Nayokaki, kasi nakokaki kokanga ntina te.” (Danyele 12:8) Kasi ngai, “namonaki, kasi nakokaki kokanga ntina te.”

Ata bongo, mokemoke nakómaki kokanga ntina ya mateya mosusu ya Biblia. Nazalaki kosepela na mateya oyo nazalaki kokanga ntina, mpe nazalaki kosala nyonso mpo nasalela yango na bomoi na ngai. Kotala bizaleli ya basusu mpe esalisaki ngai nayekola makambo mingi. Na ndakisa, Biblia elobi tózala motema molai. (Yakobo 5:7, 8) Nayebaki mpenza te soki yango elakisi nini. Kasi, ntango nazalaki komona ndenge bandeko ya lisangá bazalaki komonisa ezaleli yango, nayebaki soki kozala motema molai elakisi nini. Ya solo, lisangá ya bokristo esalisaki ngai mingi mpenza.

MAWA EBONGWANI ESENGO

Stéphane asalisaki ngai nayeba Biblia

Mokolo moko, ntango nazalaki naino elenge, namonaki bababa mosusu na balabala bazali kosolola na elobeli ya bajɛstɛ. Nakómaki kokutana na bango na kobombana mpe nabandaki koyekola elobeli ya bajɛstɛ ya France (FSL). Nakobaki koyangana na makita, mpe Stéphane elenge moko Motatoli ya Yehova atyelaki ngai likebi mpenza. Asalaki milende mpo na kosolola ná ngai, mpe tokómaki mpenza baninga. Nzokande, likambo moko ya mawa ezalaki kozela ngai. Bakɔtisaki Stéphane bolɔkɔ mpo aboyaki mosala ya soda. Nalɛmbaki nzoto! Na boumeli ya ntango nyonso oyo Stéphane azalaki na bolɔkɔ, nalɛmbaki mpenza mpe natikaki kutu kokende makita.

Sanza 11 na nsima, Stéphane abimaki na bolɔkɔ mpe ayaki na ndako. Kanisá naino ndenge nakamwaki ntango Stéphane abandaki kosolola na ngai na elobeli ya bajɛstɛ. Elekelaki ngai! Nini esalemaki? Na bolɔkɔ, Stéphane ayekolaki elobeli ya bajɛstɛ ya France. Ntango nazalaki kotala ndenge mabɔkɔ mpe elongi na ye ezalaki kosala, esengo na ngai ebakisamaki lisusu mingi.

NAKANGI SIKOYO NTINA YA MATEYA YA BIBLIA!

Stéphane akómaki koyekola na ngai Biblia. Na ntango wana nde nakómaki koyokanisa mateya yango ná mateya nyonso oyo nayekolaki liboso. Ntango nazalaki mwana, nazalaki kosepela kotala bafɔtɔ kitoko ya mikanda na biso, kokokanisa bafɔtɔ ya bato oyo bazali na mikanda yango mpe kotala likambo mokomoko mpo lisolo yango etikala mpenza na makanisi na ngai. Nayebaki makambo etali Abrahama, “momboto” na ye, mpe “ebele mpenza ya bato,” kasi nakangaki mpenza ntina ya mateya yango kaka ntango balimbolelaki ngai na elobeli ya bajɛstɛ. (Ebandeli 22:15-18; Emoniseli 7:9) Emonanaki polele ete elobeli ya bajɛstɛ nde ezalaki monɔkɔ na ngai.

Lokola nakómaki kokanga ntina ya makambo oyo bazalaki koteya na makita, yango esimbaki motema na ngai, mpe mposa na ngai ya kozwa boyebi ebakisamaki. Na lisalisi ya Stéphane, boyebi na ngai ya Biblia ekobaki kobakisama, mpe na 1992, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo. Kasi, atako nasalaki milende, lokola nazalaki na mokakatano ya kosolola ná bato banda bomwana, nazalaki kaka nsɔninsɔni.

KOTIKA EZALELI YA NSƆNINSƆNI EZALAKI PƐTƐƐ TE

Nsukansuka, etuluku moke ya bababa epai nazalaki koyangana esanganaki ná lisangá moko na Pessac, kartye moko ya Bordeaux. Yango esalisaki ngai mpenza mpe nakobaki kokende liboso na makambo ya Nzambe. Atako nazalaki kobundana mpo na kotika ezaleli ya nsɔninsɔni, baninga na ngai oyo bazali bababa te bazalaki kosala nyonso bayeba soki nakangi ntina ya likambo nyonso. Gilles ná mwasi na ye Elodie, basalaki milende mpenza mpo na kosolola ná ngai. Bazalaki mbala mingi kobengisa ngai epai na bango mpo na kolya to komɛla kafe elongo nsima ya makita, yango ekolisaki boninga na biso. Ezali mpenza esengo kozala kati na bato oyo bamekolaka bolingo ya Nzambe!

Nazali kosala diskur na elobeli ya bajɛstɛ ya France

Ezali na lisangá yango nde nakutanaki ná Vanessa, elenge mwasi moko kitoko. Ndenge oyo azalaki kotyela ngai likebi mpe bosembo na ye esepelisaki ngai. Azalaki soki moke te komona ete lokola nazali baba, mwaye ya kosolola ná ngai ezali te, kutu, amonaki yango nde libaku ya koyekola kosolola ná bababa. Tolinganaki na ye mpe tobalanaki na 2005. Atako nazalaka na mokakatano ya kosolola, Vanessa asalisaki ngai nalonga mokakatano yango mpe nasololaka polele na basusu. Nasepelaka mpenza na lisalisi na ye ntango nakokisaka mikumba na ngai.

LIKABO MOSUSU OYO YEHOVA APESI NGAI

Kaka na mbula oyo nabalaki, biro ya Batatoli ya Yehova ya France oyo ezali na Louviers, ebengisaki ngai mpo nalanda formasyo ya sanza moko mpo na mosala ya kobongola. Na bambula oyo eleki, biro esalaki mosala makasi mpo na kobimisa mikanda mingi ya elobeli ya bajɛstɛ ya France na DVD. Kasi, lokola mosala mingi ezalaki kozela bango, ekipi ya babongoli ezalaki na mposa ya lisungi.

Mwasi na ngai Vanessa asalisaka ngai mpenza

Ngai ná Vanessa tomonaki ete kosala na biro ezalaki libaku moko monene mpe likabo oyo euti na Yehova Nzambe, kasi mpo na koloba solo, tozalaki kobanga mwa moke. Nini ekokómela etuluku na biso ya elobeli ya bajɛstɛ? Tokosala nini mpo na ndako na biso? Vanessa akozwa mosala na esika yango? Yehova apesaki eyano na likambo yango mokomoko na ndenge moko ya malamu mpenza. Namonaki mpenza ete Yehova alingaka biso mpe bababa.

LISUNGI YA BANDEKO

Lokola nakɔtaki na mosala ya kobongola, nayebaki lisusu malamumalamu makambo nyonso oyo esalemaka mpo na kosalisa bababa báyeba Nzambe. Kanisá esengo oyo nayokaka ntango namonaka bandeko oyo tosalaka ná bango bazali kosala nyonso mpo na kosolola ná ngai! Mwa bajɛstɛ oyo bayekolaka mpe basalelaka, esimbaka motema na ngai. Namiyokaka ata moke te ete nasundolami. Bolingo nyonso wana emonisaka bomoko oyo ezali kati na basambeli ya Yehova.​—Nzembo 133:1.

Na mosala, na departema ya kobongola mikanda na biro ya France

Napesaka Yehova matondi, mpo na nzela ya lisangá na ye, azalaki ntango nyonso kosala ete moto moko azala wana mpo na kosalisa ngai. Nasepelaka mpe na mwa mokumba oyo nazali na yango ya kosalisa baninga na ngai bababa báyeba Mozalisi na biso ya bolingo mpe bápusana penepene na ye. Nazelaka na motema likoló mokolo oyo mokakatano nyonso oyo epekisaka bato básolola ekolongwa, ntango biso nyonso tokoloba “monɔkɔ moko ya pɛto;” elingi koloba solo na ntina na Yehova Nzambe mpe mikano na ye​—lokola libota ya bato oyo bazali na bomoko.​—Sefania 3:9.

^ par. 9 Na 1991, guvɛrnema ya France epesaki ndingisa ya kosalela elobeli ya bajɛstɛ mpo na koteya bababa.