Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

“Mobeko nini ezali liboso ya nyonso?”

“Mobeko nini ezali liboso ya nyonso?”

Esɛngaka nini mpo na kosepelisa Nzambe? Ezali nde na mibeko ebeleebele oyo tosengeli kolanda? Likambo ya esengo, ezali bongo te. Mpo na Yesu Kristo Mwana ya Nzambe, makambo oyo Nzambe asɛngaka biso ekoki kolobama kaka na maloba moke.​—Tángá Marko 12:28-31.

Tótalela naino nini etindaki Yesu aloba maloba wana. Azalaki koteya na tempelo mokolo ya 11 Nisana, mwa mikolo moke liboso ete akufa. Banguna na ye batunaki ye mituna oyo ebimisaka bantembe, mpo balingaki ete asala libunga. Biyano na ye ezalaki ntango nyonso kokangisa bango monɔkɔ. Na nsima, batunaki Yesu motuna oyo: “Mobeko nini ezali liboso ya nyonso?”​—Vɛrsɛ 28.

Ezalaki motuna moko ya mpasi. Bayuda mosusu bazalaki kotyana ntembe mpo na koyeba mobeko nini kati na mibeko 600 ya Moize ezalaki mobeko ya liboso, to ya ntina mingi. Emonani ete bamosusu bazalaki koloba ete mibeko nyonso ezalaki ndenge moko mpe ezali mabe kokanisa ete mibeko mosusu ezalaki na ntina mingi koleka mosusu. Ndenge nini Yesu ayanolaki na motuna yango?

Na eyano na ye, Yesu atángaki mibeko mibale. Ya liboso, alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Vɛrsɛ 30; Kolimbola Mibeko 6:5) Maloba “motema,” “makanisi,” “molimo,” mpe “makasi” ekoki kolimbola kaka eloko moko. * Emonisi ete: Kolinga Yehova esɛngaka moto amipesa mobimba; makoki mpe biloko na ye nyonso. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi boye: “Bolingo mpo na Nzambe esengeli kozala mobimba.” Na yango, soki olingaka mpenza Nzambe, okosala nyonso mpo mokolo na mokolo osalaka makambo oyo ekosepelisa ye.​—1 Yoane 5:3.

Ya mibale, Yesu alobaki boye: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Vɛrsɛ 31; Balevi 19:18) Kolinga Nzambe mpe mozalani etambolaka nzela moko. Bolingo mpo na Nzambe nde etindaka moto alinga mozalani na ye. (1 Yoane 4:20, 21) Soki tolingi bazalani na biso ndenge tomilingaka, tokosalela bango makambo ndenge tolingaka básalela biso. (Matai 7:12) Boye, tokomonisa ete tolingaka Nzambe oyo asalá biso nyonso na elilingi na ye.​—Ebandeli 1:26.

Na mokuse, nyonso oyo Yehova asɛngaka basambeli na ye ezali: bolingo

Mibeko oyo elobeli kolinga Nzambe mpe mozalani ezali na ntina nini? Yesu alobaki ete “mobeko mosusu te eleki oyo wana.” (Vɛrsɛ 31) Kaka na lisolo wana, Yesu alobaki ete mibeko nyonso mosusu esimbami na mibeko wana mibale.​—Matai 22:40.

Kosepelisa Nzambe ezali mpasi te. Na mokuse, nyonso oyo asɛngaka biso ezali: bolingo. Yango nde Nzambe asɛngaka banda kala mpe akokoba kosɛnga yango epai ya basambeli na ye. Kasi bolingo esuki kaka na maloba to na mayoki te; emonanaka nde na misala. (1 Yoane 3:18) Mpo na nini te koyekola ndenge oyo okoki kokóma mpe komonisa bolingo mpo na Yehova, Nzambe oyo “azali bolingo”?​—1 Yoane 4:8.

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya misato

Marko 9-16Luka 1-6

^ par. 4 Na Biblia, liloba “molimo” elimbolaka moto mobimba. Na yango, “molimo” ekoki kosangisa “motema,” “makanisi,” mpe “makasi.”