Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Solo

Solo

Epai wapi okoki kozwa yango?

Ndenge nini ekoki kosalisa yo ná libota na yo?

Tozali kobenga yo na esengo nyonso, oya koyoka biyano na mituna yango na liyangani ya etúká oyo Batatoli ya Yehova bakosala na mbula oyo.

MOTÓ YA LIKAMBO:

‘Liloba ya Nzambe ezali solo!’

euti na maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 17:17.

MAKAMBO YA NTINA:

Diskur moko ya ntina mingi oyo ezali na motó ya likambo “Solo ezali nini?” ekomonisa ntina oyo tosengeli kotyela Biblia, Liloba ya Nzambe motema.

Teyatre mibale ekolobela masolo ya Biblia mpe mateya oyo tokoki kozwa.

NANI AKOKI KOYA:

Moto nyonso. Kokɔta ezali ofele, mpe bakokɔngɔla mabonza te.

NGONGA MPE ESIKA:

Soki olingi koyeba liyangani oyo ekosalema pene na esika ofandi mpe kotala video ya mayangani na biso ya etúká, kende na www.pr418.com. (Fungolá esika bakomi OLINGI KOYEBA BISO/​MAYANGANI.)

Kende na www.pr418.com mpo omona programɛ ya liyangani yango. (Fungolá esika bakomi MIKANDA/​BABUKU MPE MWA BABUKU).