Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makama minene lokola mipɛpɛ makasi to koningana ya mabele​—Emonisaka ete Nzambe azali motema mabe?

Makama minene lokola mipɛpɛ makasi to koningana ya mabele​—Emonisaka ete Nzambe azali motema mabe?

OYO BATO BALOBAKA: “Nzambe nde ayangelaka mokili; boye ye nde abimiselaka bato makama minene, na yango, asengeli kozala motema mabe.”

OYO BIBLIA ELOBI: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) “Moto mabe” yango nde nani? Biblia emonisi ete ezali Satana. (Matai 13:19; Marko 4:15) Likambo yango ezali mpenza solo? Tókanisa naino: Soki Satana nde azali koyangela mokili oyo, boye, ye nde atindaka bato bázala moyimi, lokoso, mpe bámonaka mosika te lokola ye. Yango nde ntina oyo bato bazali kobebisa biloko oyo ezali awa na mabele, boye te? Bato mingi ya mayele balobaka ete kobebisa biloko yango ndenge wana, ekoki kosala ete makama minene esalema, ekóma lisusu mingi, to etya bomoi ya bato na likama.

Kasi, mpo na nini Nzambe atiki ete Satana azala na bokonzi mingi ndenge wana? Mpo na kozwa eyano, tózonga naino na ebandeli ntango baboti na biso ya liboso baboyaki Nzambe ayangela bango. Banda wana, bato mingi balandaka kaka lokolo na bango. Likambo yango, elingi koloba koboya boyangeli ya Nzambe esalá ete mokili ekóma na mabɔkɔ ya Satana, monguna ya Nzambe. Yango wana, Yesu abengaki Satana “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 14:30) Satana akoyangela libela na libela? Te!

Yehova * ayebi malamu mpasi oyo Satana abimiselaka bato. Kutu, esalaka Nzambe mpasi na motema ndenge bato banyokwamaka. Na ndakisa, Biblia elobi boye mpo na Nzambe ntango mpasi ekómelaki Bayisraele: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.” (Yisaya 63:9) Likambo ya esengo, Nzambe azwi bibongiseli mpo na kosukisa boyangeli mabe ya Satana mosika te! Aponi Yesu Kristo Mwana na ye, azala mokonzi ya sembo mpo na libela.

YANGO ETALI MPE YO: Atako boyangeli ya Satana elongi te kobatela bato na makama minene, boyangeli ya Yesu ekosala yango. Mokolo moko Yesu abatelaki bayekoli na ye na mopɛpɛ makasi. Biblia elobi boye: “Apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu ete: ‘Shiii! Fandá nyɛɛ!’ Mpe mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki.” Bayekoli balobaki boye: “Oyo azali mpenza nani, mpo ata mopɛpɛ ná mbu etosa ye?” (Marko 4:37-41) Likambo yango endimisi biso ete Yesu akobatela bato nyonso ya botosi ntango akoyangela lokola mokonzi.​—Danyele 7:13, 14.

^ par. 5 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.