Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NYONSO ESUKAKA NA LIWA?

Nyonso esukaka na liwa te!

Nyonso esukaka na liwa te!

Betania ezalaki mwa mboka moko oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 3 longwa na Yerusaleme. (Yoane 11:18) Likambo moko ya mawa esalemaki kuna mwa bapɔsɔ liboso Yesu akufa. Lazare, oyo azalaki moninga ya Yesu, abɛlaki makasi na boumeli ya mwa ntango moke mpe akufaki.

Ntango Yesu azwaki nsango yango, ayebisaki bayekoli na ye ete Lazare alali mpe ete akokende kuna kolamwisa ye. (Yoane 11:11) Kasi, bayekoli ya Yesu bayebaki te soki alingaki koloba nini, yango wana Yesu ayebisaki bango polelepolele ete: “Lazare akufi.”​—Yoane 11:14.

Bakundaki Lazare; mpe mikolo minei na nsima ntango Yesu akómaki na Betani, alukaki kobɔndisa Marta, ndeko ya Lazare. Marta alobaki na Yesu ete: “Soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” (Yoane 11:17, 21) Yesu azongisaki: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.”​—Yoane 11:25.

“Lazare, bimá!”

Mpo na komonisa ete maloba wana ezali solo, Yesu apusanaki na lilita ya Lazare mpe agangaki ete: “Lazare, bimá!” (Yoane 11:43) Lazare abimaki, mpe bato nyonso oyo bazalaki wana bakamwaki!

Yesu asilaki kosekwisa bato soki mibale liboso. Na libaku moko, asekwisaki elenge mwasi moko, mwana ya Yairuse. Liboso Yesu asekwisa ye, alobaki mpe ete mwana yango alali.​—Luka 8:52.

Tósimba ete ntango Lazare mpe mwana mwasi ya Yairuse bakufaki, Yesu alobaki ete liwa ezali lokola mpɔngi. Koloba bongo ebongaki mpenza. Mpo na nini? Ntango moto alali mpɔngi, ayebaka eloko te mpe ayokaka mpasi te. (Mosakoli 9:5; talá etanda,  “Liwa ezali lokola mpɔngi mozindo.”) Bayekoli ya Yesu ya liboso bayebaki malamu ndenge moto akómaka soki akufi. Buku moko (Encyclopedia of Religion and Ethics) elobi ete “bayekoli ya Yesu bayebaki ete liwa ezalaki lokola mpɔngi mpe nkunda ezalaki esika ya kopema . . . mpo na baoyo bakufi na kati ya kondima.” *

Koyeba ete bakufi balali na kati ya nkunda mpe ete kuna banyokwamaka te ezali likambo ya kobɔndisa mpenza. Na yango, liwa ezali libombami te mpe tosengeli lisusu kozala na nsɔmɔ na yango te.

MOTO OYO AKUFI AKOKI KOZONGA LISUSU NA BOMOI?

Ya solo, tosepelaka mingi kolala mpɔngi makasi na butu, kasi moto moko te alingaka kolala mpo na libela. Bakufi oyo balali na nkunda, ndenge Lazare ná mwana mwasi ya Yairuse balalaki, bakozonga mpenza na bomoi?

Yobo atunaki motuna wana ntango amonaki ete liwa na ye ekómi pene. Atunaki boye: “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?”​—Yobo 14:14.

Yobo apesaki eyano ye moko ntango alobaki na Nzambe ete: “Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:15) Yobo ayebaki malamu ete Nzambe azalaki kozela na mposa makasi mokolo oyo akosekwisa mosaleli na ye ya sembo. Yobo azelaki nde likambo oyo ekokaki kosalema te? Ezali bongo te.

Makamwisi ya kosekwisa bato oyo Yesu asalaki emonisaki polele ete Nzambe apesaki Yesu nguya likoló ya liwa. Kutu Biblia elobi ete Yesu azwi sikoyo “bafungola ya liwa.” (Emoniseli 1:18) Na yango, Yesu akofungola baporte ya nkunda, kaka ndenge apesaki mitindo ete libanga oyo ezalaki na lilita ya Lazare elongwa.

Biblia elobeli elikya ya lisekwa na bisika mingi. Anzelu moko ayebisaki mosakoli Danyele ete: “Okopema, kasi okotɛlɛma mpo na libula na yo na nsuka ya mikolo.” (Danyele 12:13) Epai ya Basadukai, bakonzi ya Bayuda oyo bazalaki koloba ete lisekwa ezali te, Yesu alobaki ete: “Bozali na libunga, mpo boyebi Makomami te mpe nguya ya Nzambe te.” (Matai 22:23, 29) Ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”​—Misala 24:15.

NTANGO NINI BAKUFI BAKOSEKWA?

Ntango nini lisekwa wana ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene ekosalema? Anzelu ayebisaki Danyele ete akolamuka “na nsuka ya mikolo.” Marta mpe azalaki na kondima ete ndeko na ye Lazare “akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.”​—Yoane 11:24.

Biblia emonisi ete “mokolo ya nsuka” wana ekozala na ntango ya boyangeli ya Kristo. Paulo akomaki ete: “Mpo [Kristo] asengeli koyangela tii ntango Nzambe akotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye. Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.” (1 Bakorinti 15:25, 26) Likambo yango esengeli mpenza kotinda biso tóbondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe ete mokano na ye esalema awa na mabele. *

Ndenge Yobo ayebaki yango malamu, Nzambe azali na mokano ya kosekwisa bakufi. Ntango mokolo yango ekokoka, liwa ekosilisama mpenza makasi. Moto akotuna lisusu ata mokolo moko te ete, ‘Nyonso esukaka na liwa?’

^ par. 8 Na minɔkɔ mosusu, liloba oyo basalelaka mpo na kolobela bisika ya kokunda bibembe euti na liloba ya Grɛki oyo elimboli “esika ya kolala.”

^ par. 18 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe, talá mokapo 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.