Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | ETUMBA OYO EBONGOLAKI MOKILI

Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi

Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi

Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki na sanza ya 11/1918. Matata esilaki mpe bato babinaki na babalabala. Kasi esengo yango ezalaki ya ntango mokuse. Eumelaki te, likama mosusu ebimaki mpe yango ezalaki mabe koleka masasi.

Na France, na sanza ya 06/1918, basoda mingi babɛlaki maladi babengi grippe espagnole. Eumelaki te, bato bamonaki ete maladi yango ezalaki mabe mpenza. Na ndakisa, kaka na mwa basanza, ebomaki ebele ya basoda ya Amerika oyo bazalaki na France koleka kutu baoyo bakufaki na masasi. Mpe ntango etumba esilaki, basoda oyo bazongaki na bikólo na bango bamemaki maladi yango mpe epalanganaki nokinoki na mokili mobimba.

Mwa bambula nsima ya etumba yango, nzala ekɔtaki mpe nkita ebebaki. Nzala ekɔtaki na bikólo mingi ya Mpoto ntango matata yango esilaki na 1918. Na 1923, mbongo ya ekólo Allemagne esilaki valɛrɛ. Mbula motoba na nsima, nkita ya mokili mobimba ebebaki. Nsukansuka, na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki​—emonanaki lokola ete matata wana ya liboso ekobaki. Nini mpenza ebimisaki bitumba yango oyo esalemá naino liboso te?

ELEMBO YA MIKOLO YA NSUKA

Bisakweli ya Biblia esalisaka biso tóyeba nini ebimisaki makambo mosusu oyo esalemaki na ntango ya kala, ata mpe oyo etali Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Yesu Kristo asakolaki ete ekozala na ntango moko oyo “ekólo ekobunda na ekólo,” nzala mpe bamaladi mabe ekozala na mokili mobimba. (Matai 24:3, 7; Luka 21:10, 11) Ayebisaki bayekoli na ye ete makambo wana ekomonisa elembo ya mikolo ya nsuka. Mokanda ya Emoniseli elobeli makambo mosusu oyo emonisi ete mpasi etondi awa na mabele mpo na etumba oyo ebimaki na likoló.​—Talá etanda  “Etumba na mabele mpe na likoló.”

Mokanda yango ya Biblia elobeli mpe bampunda minei, oyo na bantango mosusu babengaka yango bampunda minei ya Emoniseli. Bampunda yango misato emonisi makambo ya mpasi oyo Yesu autaki kolobela​—etumba, nzala mpe maladi mabe. (Talá etanda  “Mpunda minei ezali mpenza kopota mbangu?”) Na yango, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandisá eleko moko ya mpasi oyo ezali se kokoba. Mpe Biblia emonisi ete Satana nde azali mobandisi ya bampasi wana nyonso. (1 Yoane 5:19) Bokonzi na ye ekosuka mokolo mosusu?

Mokanda ya Emoniseli emonisi biso lisusu ete Satana azali na “ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Yango wana azali na nkanda makasi mpe azali kobimisa bampasi mingi awa na mabele. Na yango, bampasi oyo tozali komona emonisi ete mikolo ya Satana etikali ya kotánga.

MISALA YA SATANA EKOBUKANA

Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ekɔtisaki mbongwana monene. Yango ebandisaki eleko moko ya bitumba, bato bakómaki kotomboka mpe kotyela lisusu bakonzi motema te. Emonisaki mpe ete babenganaki Satana kuna na likoló. (Emoniseli 12:9) Mokonzi yango oyo amonanaka te, oyo azali koyangela mokili asalaka makambo lokola mokonzi moko ya mabe oyo azali konyokola bato mpo ayebi ete mikolo na ye etikali ya kotánga. Ntango mikolo yango ekokóma na nsuka, bampasi oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebimisá ekosila.

Na kotalela bisakweli ya Biblia, osengeli mpenza kondima ete Yesu Kristo, Mokonzi na biso ya likoló “akobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoane 3:8) Bamilio ya bato babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya. Yo mpe osalaka yango? Na nzela ya Bokonzi yango, bato ya sembo bakomona ndenge mokano ya Nzambe ekosalema na mabele, kasi oyo ya Satana te. (Matai 6:9, 10) Na Bokonzi ya Nzambe, Etumba ya Mokili mobimba ekozala lisusu te​—ata mpe bitumba mosusu nyonso! (Nzembo 46:9) Luká koyeba makambo mosusu oyo etali Bokonzi yango mpo ozala ntango oyo kimya ekozala na mokili mobimba!​—Yisaya 9:6, 7.

^ par. 20 Talá mokapo 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.