Oyebaki yango?
Bomoi ya baombo na ampire ya Roma ezalaki ndenge nini?
Na ampire ya Roma, bato mingi bakómaki baombo mpo basoda ya Roma balongaki bikólo na bango to mpo bakangaki bango na makasi. Baoyo bakangamaki bazalaki kotɛkama mpe bazalaki kozonga lisusu na bandako na bango te mpe komona lisusu bato ya libota na bango te.
Baombo mingi bazalaki kokufa na mosala makasi oyo bazalaki kosala na bisika oyo batimolaka mabanga ya ntalo, kasi baoyo bazalaki kosala mosala ya bilanga mpe kosala na bandako bazalaki mwa malamu. Bazalaki kosɛnga moombo na makasi alata ebende moko na nkingo oyo bakomá ete balaki ye lifuti soki akimi mpe azongeli lisusu nkolo na ye. Baoyo bazalaki kokima mbala na mbala, bazalaki kotya bango kashɛ na elongi oyo mbala mingi ezalaki na lɛtrɛ F oyo elakisi fugitivus (moto oyo akimi).
Mokanda ya Filemo elobeli ndenge oyo ntoma Paulo azongisaki Onezime, moombo oyo akimaki, epai ya nkolo na ye Filemo. Atako mibeko epesaki Filemo lotomo ya kopesa Onezime etumbu makasi, Paulo asɛngaki Filemo ‘ayamba ye na boboto’ mpo na bolingo mpe boninga oyo bazalaki na yango na Paulo.—Filemo 10, 11, 15-18.
Mpo na nini ekólo Fenisia eyebanaki mingi mpo na langi na yango ya mwa motane-bulé?
Fenisia, oyo ezalaki na esika oyo ekólo Liban ezali lelo, eyebanaki mpo na langi na yango oyo ezalaki kobengama langi ya Tire, nkombo oyo eutaki na engumba Tire. Salomo, mokonzi ya Yisraele atyaki ‘lɛnɛ ya langi ya mwa motane-bulé’ oyo moto moko ya Tire oyo ayebaki mosala malamu asalaki mpo na kokómisa kitoko tempelo oyo atongaki.—2 Ntango 2:13, 14.
Langi ya mwa motane-bulé ya Tire ezalaki langi oyo elekaki motuya na ntango wana, mingimingi mpo ezalaki kosɛnga mosala makasi mpo na kobimisa yango. Liboso, babomi-mbisi bazalaki kolɔkɔta mbɛmbɛ ebele na mbu. * Ezalaki kosɛnga mbɛmbɛ soki 12 000 mpo na kobimisa langi ya kotya na elamba moko. Na nsima, bazalaki kolongola mbɛmbɛ na ndako na yango mpo bázwa mai na yango oyo ezalaki kobimisa langi. Bato oyo bazalaki kosala langi bazalaki kosangisa yango na mungwa mpe kotya yango na esika ya polele mpe na moi na boumeli ya mikolo misato. Na nsima, bazalaki kotya yango na tono oyo bazipi mpe kotɔkisa yango na mai ya mbu na boumeli ya mikolo mingi.
Na boumeli ya bankama ya bambula, na mombongo na bango mpe na ndenge bazalaki kokonza bikólo mosusu, bato ya Fenisia bakobaki kotɛka langi ya mwa motane-bulé ya Tire mpe kobimisa yango. Bamonaki bitiká ya langi oyo bazalaki kobimisa zingazinga ya Mbu ya Mediterane mpe mosika na wɛsti, na Cadix, na ekólo Espagne.
^ par. 8 Ndako yango ya mbɛmbɛ ezalaki na molai ya santimɛtrɛ soki 5 tii 8.