Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | SATANA AZALAKA MPENZA?

Satana azalaka?

Satana azalaka?

Liyemi moko na Madrid, na Espagne, emonisi Satana lokola anzelu ya mabe oyo babwaká na nse

“Nakolá na Salvador. Ntango nazalaki kotosa mama te, azalaki koloba na ngai ete: ‘Zabolo azali koya kokanga yo!’ Mpe nazalaki kozongisela ye boye: ‘Ɛɛ aya!’ Nandimelaka Nzambe kasi Satana te.”​—ROGELIO.

Ondimi maloba ya elenge Rogelio? Na makanisi oyo elandi, oyo wapi omoni ete ezali solo?

  • Satana azalaka mpenza te; makambo ya mabe yango nde Satana.

  • Satana azalaka, kasi akipaka mpenza bato te.

  • Satana azali ekelamu ya elimo ya nguya, oyo atindaka bato básala mabe.

Ezali na bato, ntango mosusu bamilio oyo bandimaka mokomoko ya makanisi yango. Ezali na ntina koluka koyeba likanisi oyo wapi ezali mpenza solo? Ɛɛ, mpo soki Satana azalaka te, baoyo bandimaka ete azalaka mpenza bamikosaka. Soki azalaka kasi akipaka bato te, boye bato bazalaka ekɛngɛ mpe babangaka ye kaka mpamba. Nzokande, soki Satana atindaka bato básala mabe, boye azali mabe mingi koleka ndenge oyo bato bakoki kokanisa.

Tótala naino biyano oyo Biblia epesi na mituna oyo: Makambo ya mabe yango nde Satana to azali nde ekelamu ya elimo? Soki azali ekelamu, azali likama mpo na yo? Soki ezali bongo, ndenge nini okoki komibatela?