Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | SATANA AZALAKA MPENZA?

Makambo ya mabe yango nde Satana?

Makambo ya mabe yango nde Satana?

Ezali mpenza mpasi te koloba ete Satana oyo Biblia elobeli, ezali nde makambo nyonso ya mabe. Kasi, Biblia eteyaka mpenza bongo? Soki ezali bongo, mpo na nini Biblia emonisi ete Satana asololaki na Yesu Kristo mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Tótalela bandakisa mibale ya masolo yango.

NTANGO SATANA ASOLOLAKI NA YESU

Ntango Yesu abandaki mosala na ye, Zabolo amekaki ye mbala misato mpo na koluka kokweisa ye. Mbala ya liboso, Satana atyaki ye mpanzi likoló asalela nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na litomba na ye moko; mpo na kosilisa nzala na ye. Na nsima, Zabolo atindaki Yesu atya bomoi na ye na likama kaka mpo na komilakisa. Na nsuka, Satana alobaki ete akopesa ye bokonzi nyonso ya mokili soki kaka asaleli ye likambo moko ya moke ya losambo. Na mbala nyonso wana misato, Yesu alongaki mayele mabe wana mpe na mbala yango nyonso, asalelaki Makomami.​—Matai 4:1-11; Luka 4:1-13.

Yesu asololaki na nani? Asololaki nde na ezaleli moko ya mabe oyo ezalaki na kati na ye? Biblia emonisi ete Yesu “amekamaki na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.” (Baebre 4:15) Biblia elobi mpe boye: “Asalaki lisumu te, mpe lokuta ezwamaki na monɔkɔ na ye te.” (1 Petro 2:22) Yesu atikalaki moto ya kokoka mpe abatelaki bosembo na ye. Atikaki ata moke te ete ezaleli moko ya mabe ekola na kati na ye. Ezali polele ete Yesu asololaki te na ezaleli moko ya mabe oyo ezalaki na kati na ye; kasi, asololaki nde na moto oyo azalaka mpenza.

Lisolo yango ezali mpe na makambo mosusu oyo emonisi ete Satana azalaka mpenza.

  • Kobosana te ete Zabolo alakaki Yesu bokonzi ya mokili mobimba soki asaleli ye likambo moko ya losambo. (Matai 4:8, 9) Elaka yango elingaki kozala na ntina te soki Satana azalaka te. Lisusu, Yesu atyelaki Satana ntembe te mpo na bokonzi oyo alakaki ye.

  • Nsima ya kotɛmɛla komekama wana, Zabolo “atikaki ye tii na ntango mosusu ya malamu.” (Luka 4:13) Awa, Satana amonisami te lokola ezaleli moko ya mabe, kasi nde lokola monguna moko oyo alɛmbaka likambo te.

  • Simbá ete “baanzelu bayaki mpe babandaki kosalela” Yesu. (Matai 4:11) Baanzelu yango bazalaki mpenza bikelamu ya elimo oyo balendisaki mpe basungaki Yesu. Kasi, mpo na nini tóboya kondima ete Satana azalaki mpe ekelamu ya elimo?

NTANGO SATANA ASOLOLAKI NA NZAMBE

Ndakisa ya mibale etaleli Yobo moto oyo azalaki kobanga Nzambe. Elobeli masolo mibale oyo Zabolo asololaki na Nzambe. Na masolo yango nyonso mibale, Nzambe akumisaki Yobo mpo na bosembo na ye. Satana alobaki ete Yobo asalelaka Nzambe kaka mpo na matomba na ye moko mpe ete Nzambe asombaka bosembo ya Yobo kosomba. Kutu, Zabolo amonisaki ete ayebi Yobo malamu koleka Nzambe. Yehova apesaki Satana nzela ya kobɔtɔla Yobo biloko na ye nyonso, koboma bana na ye, ata mpe kobebisa sante na ye. * Na nsima, emonanaki polele ete Yehova alobaki solo mpo na Yobo, kasi Satana azalaki moto ya lokuta. Nzambe apambolaki Yobo mpo na bosembo na ye.​—Yobo 1:6-12; 2:1-7.

Na masolo yango oyo Satana asololaki na Nzambe, Yehova azalaki nde kosolola na ezaleli moko ya mabe oyo ezalaki na kati na ye? Biblia elobi boye: “Nzela ya Nzambe ya solo ezali ya kokoka.” (2 Samwele 22:31) Liloba ya Nzambe elobi mpe boye: “Mosantu, mosantu, mosantu nde Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 4:8) Mosantu elakisi pɛto, oyo etyami pembeni, oyo ezali mosika na lisumu. Yehova akoká mpe azali ata na lisumu moko te. Akoki soki moke te kozala na bizaleli ya mabe.

Lisolo oyo Satana asololaki na Nzambe ememelaki Yobo bampasi mpenza

Ata bongo, bato mosusu bakoki koloba ete Yobo azalaki moto ya solo te, boye lisolo yango mobimba ezali lisapo mpamba. Kasi, likanisi wana ebongi mpenza? Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete Yobo azalaki moto ya solo mpenza. Na ndakisa, Yakobo 5:7-11 emonisi ete Yobo azali ndakisa oyo ekoki kolendisa bakristo báyika mpiko na ntango ya mpasi mpe ekoki kosalisa bango bámona ete Yehova apesaka mbano na baoyo bayikaka mpiko ndenge wana. Ndakisa yango elingaki kosalisa bakristo na nini soki Yobo azalaki moto ya solo te mpe soki mpasi oyo Satana abimiselaki ye ezali kaka lisapo? Lisusu, Ezekiele 14:14, 20 etángi Yobo, Noa mpe Danyele na liste ya bato misato ya sembo. Ndenge moko na Noa mpe Danyele, Yobo azalaki moto ya solo oyo azalaki na kondima makasi. Soki Yobo azalaki moto ya solo, omoni te ete moto oyo abimiselaki ye bampasi asengeli mpe kozala moto ya solo?

Biblia emonisi polele ete Satana azali mpenza ekelamu ya elimo. Ata bongo, okoki komituna boye: ‘Satana azali likama mpo na ngai ná libota na ngai lelo oyo?’

BONGO LELO OYO?

Kanisá ete etuluku moko ya bato ebele ya mobulu bakɔti na mbalakaka na engumba na yo. Na ntembe te, kimya oyo ozalaki na yango mpe bizaleli ya bato oyo ofandi na bango ekobeba. Sikoyo, talá ndakisa oyo eyokani na yango: Satana ná bademo na ye​—bikelamu ya elimo oyo batombokelaki Nzambe lokola Satana—​babwakamaki na mbalakaka awa na mabele. Yango ebimisaki makambo nini? Meká kokanisa na bansango ya mboka na bino mpe ya bapaya oyo otalaka na televizyo:

  • Ozali komona ndenge mobulu ezali se kobakisama na mokili mobimba atako milende ezali kosalema mpo na kosilisa yango?

  • Ozali komona ndenge misala ya bilimo mabe etondi na masano mpe bafilme atako baboti mingi bazali komitungisa mpo na yango?

  • Ozali komona ndenge mabele ezali se kobeba atako bato bazali kosala makasi mpo na kobikisa yango?

  • Omoni te ete ezali na eloko moko ya mabe mpenza to nguya moko oyo ezali kotinda bato na mabe?

Talá oyo Biblia elobi mpo na esika bampasi ya lelo eutaka; elobi boye: “Bongo dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye. . . . Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:9, 12) Nsima ya kotalela makambo mingi, bato mingi bamoni ete Satana azali ekelamu moko ya elimo oyo azali likama mpenza, oyo atindaka bato básala makambo ya mabe na mokili.

Okoki komituna ndenge nini okoki kozwa libateli. Komituna bongo ezali mabe te. Lisolo oyo elandi ekomonisa makambo oyo ekosalisa yo.

^ par. 12 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.