Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO NA MONINGA MOKO YA KARTYE

Mpo na nini kokanisaka liwa ya Yesu?

Mpo na nini kokanisaka liwa ya Yesu?

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Megan akei kotala mwasi moko na nkombo Shirley.

“BÓKOBA KOSALA BOYE MPO NA KOKANISA NGAI”

Megan: Mbote Shirley. Nasepelaki mingi komona yo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu Kristo pɔsɔ eleki. * Omonaki likita yango ndenge nini?

Shirley: Nasepelaki na likita yango, kasi mpo na koloba solo, nakangaki mpenza ntina te ya makambo oyo balobaki kuna. Namonaka ndenge bato basalaka fɛti ya mbotama ya Yesu na Noele mpe ya lisekwa na ye na Pasika, kasi namoná naino te bazali kokanisa liwa na ye.

Megan: Ezali solo ete Noele ná Pasika ezali bafɛti oyo eyebani mingi na mokili mobimba. Kasi, Batatoli ya Yehova bamonaka ete ezali na ntina kokanisaka nde liwa ya Yesu. Soki ozali na mwa miniti, nakosepela kozongela ntina oyo etindaka bango básala bongo.

Shirley: Malamu, nazali na mwa miniti.

Megan: Ntina ya libosoliboso oyo Batatoli ya Yehova bakanisaka liwa ya Yesu ezali mpo ye moko asɛngaki bayekoli na ye básalaka bongo. Tótalela oyo esalemaki na butu ya nsuka liboso Yesu akufa. Ozali koyeba lisusu molulu ya ntina mingi oyo asalaki elongo na bayekoli na ye ya sembo?

Shirley: Olingi kolobela Elambo ya Mpokwa?

Megan: Ɛɛ. Babengaka yango mpe Bilei ya Mpokwa ya Nkolo. Na elambo yango, Yesu apesaki bayekoli na ye malako ya polele. Okosepela kotánga maloba yango na Luka 22:19?

Shirley: OK. “Lisusu, akamataki limpa, apesaki matɔndi, abukaki yango, mpe apesaki bango yango, alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ekokabama mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’”

Megan: Mersi. Talá malako ya Yesu na fraze ya nsuka ya vɛrsɛ yango: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” Mpe liboso ete apesa bayekoli na ye malako ete bákanisaka ye, Yesu amonisaki polele nini basengeli kokanisaka. Alobaki ete asengelaki kokaba bomoi na ye mpo na bayekoli na ye. Yesu amonisaki makanisi ndenge moko na oyo wana na Matai 20:28. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” Na mokuse, yango nde ntina oyo Batatoli ya Yehova bayanganaka mbula nyonso na mokolo ya anivɛrsɛrɛ ya liwa ya Yesu mpo na kokanisa mbeka ya lisiko oyo apesaki. Bato nyonso ya botosi bakoki kozwa bomoi mpo na liwa na ye.

MPO NA NINI LISIKO EZALAKI NA NTINA?

Shirley: Nayokaka bato balobaka ete Yesu akufaki mpo tózwa bomoi. Kasi mpo na koloba solo, nayebaka mpenza te na ndenge nini.

Megan: Ozali yo moko te, Shirley. Likambo ya mbeka ya lisiko ya Yesu ezali mpenza pɛtɛɛ te. Kasi ezali mpe moko ya makambo ya kitoko oyo Biblia eteyaka. Omoni ndenge nini, ozali lisusu na mwa miniti?

Shirley: Ɛɛ.

Megan: Malamu. Nautaki kutu kotánga lisolo oyo elobeli lisiko mpe nakomeka kolimbola yango na ndenge ya pɛtɛɛ.

Shirley: OK.

Megan: Mpo na kokanga ntina ya lisiko, tosengeli naino koyeba likambo oyo lisumu ya Adama ná Eva ebimisaki na elanga ya Edene. Mpo na kosalisa biso tóyeba yango, tiká tótánga Baroma 6:23. Okosepela kotánga vɛrsɛ yango?

Shirley: Ɛɛ. Elobi boye: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”

Megan: Mersi. Tótalela naino maloba yango. Ya liboso, talá ndenge vɛrsɛ ebandi: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” Yango nde ekateli oyo Nzambe azwaki na ebandeli mpo na bato​—lifuti to etumbu ya lisumu ezali liwa. Na ebandeli, moto moko te azalaki mosumuki. Nzambe akelaki Adama ná Eva bato ya kokoka mpe bana na bango nyonso basengelaki kobotama bato ya kokoka. Ntina bato bákufaka elingaki kozala te. Adama, Eva mpe bana na bango nyonso bazalaki na elikya ya bomoi ya seko mpe ya esengo. Kasi ndenge toyebi yango, makambo esalemaki bongo te.

Shirley: Ɛɛ. Adama ná Eva balyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki.

Megan: Yango mpenza. Mpe ntango balyaki mbuma yango, batosaki Nzambe te; yango nde lisumu oyo basalaki. Kutu, bakómaki bato ya kozanga kokoka; bato ya masumu. Likambo yango ememelaki kaka Adama ná Eva mpasi te kasi mpe bana na bango nyonso.

Shirley: Olingi mpenza koloba nini?

Megan: Tózwa naino ndakisa moko. Natuna yo naino, olingaka kosala mampa?

Shirley: Ɛɛ! Nalingaka kosala yango.

Megan: Kanisá ete ozali na linzanza moko ya sika ya kitoko ya kotumbela mampa. Liboso osalela yango mpo na mbala ya liboso, ekwei na pavema mpe efinani makasi. Sikoyo, mampa nyonso oyo okotumba na linzanza yango ekozala ndenge nini? Yango nyonso ekozala ya kofinana, boye te?

Shirley: Ɛɛ, ezali bongo.

Megan: Ndenge moko mpe, ntango Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe, bakómaki ya “kofinana” to bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka. Lokola bakómaki bato ya masumu liboso bábota, bana na bango nyonso basengelaki kobotama na “kofinana” wana. Basengelaki kobotama bango nyonso bato ya masumu. Na Biblia, liloba “lisumu” emonisaka kaka te likambo oyo moto asali kasi mpe ndenge oyo tobotamaka. Yango wana, atako ngai ná yo tosalaki mabe moko te mpe tozalaki te ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, batikelá bana na bango nyonso ata mpe biso ezaleli ya kozanga kokoka mpe lisumu oyo ememaka tii na liwa. Ndenge totángaki yango na Baroma 6:23, lifuti ya lisumu ezali liwa.

Shirley: Likambo yango ezali komonana mpenza sembo te. Mpo na nini bato nyonso basengeli konyokwama libela mpo na lisumu ya Adama ná Eva?

Megan: Olobi solo, ezali komonana sembo te. Kasi likambo mosusu ezali. Na bosembo na ye ya kokoka, Nzambe alobaki ete Adama ná Eva basengeli kokufa mpo na lisumu na bango, kasi apesaki biso bana na bango elikya. Nzambe azwaki bibongiseli mpo tólongwa na mpasi yango. Yango nde ntina oyo esɛngaki ete mbeka ya lisiko ya Yesu epesama. Talá lisusu Baroma 6:23. Nsima ya koloba ete “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa,” vɛrsɛ yango elobi boye: “Kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.” Na yango, liwa ya Yesu nde efungoleli biso nzela ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa. *

LISIKO​—LIKABO YA NZAMBE OYO ELEKI MAKABO NYONSO

Megan: Ezali na likambo mosusu na vɛrsɛ yango oyo nalingi kobenda likebi na yo.

Shirley: Ezali nini?

Megan: Simbá ete vɛrsɛ yango elobi: “Likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.” Sikoyo, soki Yesu azali moto oyo anyokwamaki mpe akufaki mpo apesa bomoi na ye mpo na biso, mpo na nini vɛrsɛ yango elobi ete lisiko ezali “likabo oyo Nzambe azali kopesa”? Mpo na nini te “likabo oyo Yesu azali kopesa”? *

Shirley: Hmm. Nayebi te.

Megan: Malamu, Nzambe nde akelaki Adama ná Eva mpe ntango bazangaki botosi na elanga ya Edene, basalelaki ye lisumu. Ayokaki mpenza mpasi na motema ntango bana na ye mibale ya liboso batombokelaki ye. Kasi Yehova azwaki mbala moko solisyo. * Azwaki mokano ete moko ya bikelamu na ye ya elimo aya na mabele, azala na bomoi ya kokoka mpe na nsima apesa bomoi na ye lokola mbeka ya lisiko. Yango wana, ebongiseli wana nyonso oyo etali lisiko ezalaki likabo ya Nzambe. Ezali na ntina mosusu oyo emonisi ete lisiko ezali likabo ya Nzambe. Osí okanisá ndenge oyo Nzambe amiyokaki ntango babomaki Yesu?

Shirley: Te, nakanisá naino te.

Megan: Bana-popi oyo namoni awa libándá emonisi ete ozali na bana.

Shirley: Ɛɛ, nazali na bana mibale, mwasi ná mobali.

Megan: Lokola ozali moboti, kanisá ndenge Tata ya Yesu ya likoló, Yehova Nzambe amiyokaki mokolo oyo Yesu akufaki. Elingi koloba, ayokaki ndenge nini ntango azalaki kotala ndenge bakangaki Mwana na ye oyo alingaka mingi, batyolaki ye mpe babɛtaki ye fimbo? Ayokaki mpe ndenge nini ntango bazalaki kobɛta ye bansɛtɛ likoló ya nzete mpe batikaki ye wana anyokwama malɛmbɛmalɛmbɛ tii na liwa?

Shirley: Ayokaki mpasi mpenza. Nakanisá naino boye liboso te!

Megan: Tokokoka te komonisa mpasi oyo Nzambe ayokaki mpenza mokolo wana. Kasi, toyebi ete ayokaka esengo to mawa, toyebi mpe mpo na nini atikaki nzela ete makambo wana nyonso ekóma. Likambo yango elimbolami polele na Yoane 3:16. Okoki kotánga yango?

Shirley: Ɛɛ. Elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”

Mbeka ya lisiko emonisi bolingo monene oyo Nzambe amoniselá biso

Megan: Mersi. Talá lisusu ebandeli ya vɛrsɛ yango. Elobi boye: “Nzambe alingaki mokili.” Yango nde sekele​—bolingo. Bolingo nde etindaki Nzambe atinda Mwana na ye na mabele akufa mpo na biso. Ya solo, mbeka ya lisiko emonisi bolingo monene oyo Nzambe amoniselá biso. Yango wana Batatoli ya Yehova bayanganaka mbula nyonso mpo na kokanisa liwa ya Yesu. Ndenge nalimboleli yo makambo yango lisusu, esalisi yo?

Shirley: Ɛɛ. Mersi ndenge ozwi ntango ya kolimbolela ngai yango.

Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna Motatoli ya Yehova moko. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

^ par. 5 Mbala moko na mbula, Batatoli ya Yehova bayanganaka mpo na kosala anivɛrsɛrɛ ya liwa ya Yesu mpo na kokanisa mbeka oyo apesaki. Na mbula oyo, anivɛrsɛrɛ yango ekozala mokolo ya mitano 03/04/2015.

^ par. 32 Lisolo ya mbala ya nsima ekolobela ndenge oyo mbeka ya lisiko ya Yesu esalisi biso tólongwa na lisumu mpe oyo tosengeli kosala mpo tózwela lisiko yango litomba.

^ par. 36 Na Biblia, Nzambe mpe Yesu bazali bato mibale bakeseni. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 4 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.