BIBLIA EBONGOLAKA BATO
Mituna misato ebongolaki bomoi na ngai
-
ABOTAMAKI NA: 1949
-
EKÓLO: ÉTATS-UNIS
-
BOMOI NA YE YA KALA: NAZALAKI KOLUKA NTINA MPENZA YA BOMOI
NDENGE NAZALAKI:
Nakolá na Ancram, engumba moko moke na nɔrdi ya New York, na États-Unis. Engumba yango ezalaki na baferme mingi ya bangɔmbɛ. Kutu, bangɔmbɛ ezalaki mingi koleka bato.
Libota na biso ezalaki kokende na eglize kaka moko oyo ezalaki na engumba yango. Mikolo ya lomingo na ntɔngɔ, nkɔkɔ ya mobali azalaki kopangwisela ngai sapato mpe na nsima, nazalaki kokende na eteyelo ya mokolo ya lomingo ná Biblia ya moke ya langi ya mpɛmbɛ, oyo nkɔkɔ na ngai ya mwasi apesaki ngai. Bateyá ngai ná bandeko na ngai kosala mosala makasi, kozala na limemya, kosalisaka basusu mpe kopesaka mersi mpo na mapamboli oyo tozali kozwa.
Ntango nakolaki, nalongwaki na ndako mpe nakómaki molakisi na eteyelo moko. Nazalaki na mituna mingi etali Nzambe mpe bomoi. Bana-kelasi na ngai mosusu bazalaki mayele mingi. Bamosusu bazalaki mayele mingi te kasi bazalaki kosala makasi. Bamosusu bazalaki bibɔsɔnɔ kasi basusu bazalaki nzoto malamu. Namonaki ete yango ezalaki sembo te. Na bantango mosusu, baboti ya bana-kelasi na ngai oyo bazalaki bibɔsɔnɔ bazalaki koloba, “Nzambe nde alingi mwana na ngai azala boye.” Nazalaki komituna mpo na nini Nzambe akoki kotika babebe mosusu bábotama bibɔsɔnɔ. Kutu, bebe asalaka mabe moko te.
Nazalaki mpe komituna boye: ‘Likambo nini ya ntina nasengeli kosala na bomoi na ngai?’ Nazalaki komona ete bomoi na ngai ezali kokende nokinoki. Nakolá na libota moko malamu, natángá na biteyelo ya malamu mpe nakómaki kosala mosala oyo nazalaki kolinga. Kasi, makambo mosusu oyo etikalaki na bomoi na ngai, nazalaki komona yango ntina mpenza te. Na ndakisa kobala, kozala na ndako ya kitoko, kobota bana, kokoba kosala tii kozwa pansiɔ mpe nsukansuka, kokende kofanda na ndako ya mibange. Nazalaki komituna soki bomoi mosusu ya malamu koleka oyo wana ezali.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Na eleko moko ya molunge, ngai ná baninga mosusu ya mosala totambolaki na bikólo mingi ya Mpoto. Tokendaki na Abbaye de Westminster, na Notre-Dame de Paris, na Vatican mpe na baeglize mingi ya mikemike. Bisika nyonso nakendaki, natunaki mituna oyo nazalaki na yango. Ntango nazongaki na Sloatsburg, na
New York, esika oyo nazalaki kofanda, nakɔtaki na mangomba ebele. Kasi, ata moko te epesaki biyano oyo ebongi na mituna na ngai.Mokolo moko, mwana-kelasi na ngai moko ya mbula 12 apusanaki pene na ngai mpe atunaki ngai mituna misato. Ya liboso, atunaki ngai soki nayebaki ete azali Motatoli ya Yehova. Nalobaki Ɛɛ. Ya mibale, atunaki soki nakolinga koyeba makambo mingi etali Batatoli ya Yehova. Nalobaki lisusu Ɛɛ. Ya misato, atunaki esika nini nazalaki kofanda. Ntango napesaki ye adrɛsi na ngai, toyaki koyeba ete tozalaki kartye moko. Nayebaki te ete mituna misato ya elenge mwasi yango, ekobongola bomoi na ngai mpo na libela.
Mwa moke na nsima, ayaki na ndako na ngai na velo mpe tobandaki koyekola Biblia. Natunaki ye mituna oyo natunaki bakonzi mingi ya mangomba. Kasi, ye apesaki ngai biyano ya polele mpe ya malamu na Biblia na ngai, biyano oyo natikalá kozwa te liboso!
Makambo oyo nayekolaki na Biblia epesaki ngai esengo ya solosolo. Nasepelaki makasi ntango natángaki mokanda ya 1 Yoane 5:19, oyo elobi boye: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” Motema ekitaki ntango nayebaki ete Nzambe te nde abimisaka bampasi nyonso oyo tozali komona, kasi Satana mpe ete Nzambe akosilisa yango. (Emoniseli 21:3, 4) Namonaki ete ezali mpasi te kokanga ntina ya makambo ya Biblia soki balimboli yango polele. Atako Motatoli ya Yehova oyo ayekolaki na ngai Biblia azalaki kaka na mbula 12, namonaki ete solo etikalaka kaka solo ata soki mwana moke nde alobi yango.
Ata bongo, nalingaki komona soki Batatoli ya Yehova basalelaka makambo oyo bateyaka. Na ndakisa, elenge mwasi yango ayebisaki ngai ete bakristo ya solo bamonisaka bizaleli lokola motema molai mpe boboto. (Bagalatia 5:22, 23) Nalobaki nakomeka ye mpo natala soki ye mpe amonisaka bizaleli yango. Mokolo moko, nayaki na retare na nko na boyekoli na biso ya Biblia. Namitunaki boye: ‘Akozela ngai? Soki azeli ngai, akosilika te ndenge nayei retare?’ Ntango nakɔtisaki motuka na lopango, namonaki ye azali kozela ngai liboso ya ndako na ngai. Ayaki mbangu tii na motuka mpe alobaki boye: “Etikalaki moke nazonga na ndako mpo nayebisa mama tóbenga na balopitalo mpe na polisi mpo na koyeba soki ozali malamu mpo naino oyá retare te na boyekoli na biso. Namitungisaki mingi mpo na yo!”
Na libaku mosusu, natunaki motuna moko oyo nakanisaki ete ekozala pɛtɛɛ te mpo na elenge ya mbula 12 ayanola. Nalingaki komona soki akopesa ngai eyano oyo eyeli ye kaka boye. Ntango natunaki ye motuna yango, atalaki ngai mpenza mpe alobaki boye: “Motuna yango ezali makasi. Nazali kokoma yango mpe nakotuna baboti na ngai.” Kaka ndenge alakaki, mbala ya nsima oyo ayaki mpo tóyekola, amemelaki ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezalaki na eyano na motuna na ngai. Yango nde esalaki ete nakangama na Batatoli ya Yehova mpo mikanda na bango ezalaki na bavɛrsɛ ya Biblia oyo eyanolaki na mituna na ngai nyonso. Nakobaki koyekola ná elenge mwasi wana mpe mbula moko na nsima, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. *
MATOMBA OYO NAZWI:
Nsukansuka, ntango nazwaki biyano oyo ebongi na mituna na ngai, nakómaki na mposa ya koyebisa yango moto nyonso. (Matai 12:35) Na ebandeli, bato ya libota na ngai batɛmɛlaki ngai. Kasi, na nsima, babongolaki makanisi. Mwa moke liboso ete akufá, mama na ngai akómaki koyekola Biblia. Atako aumelaki lisusu te na bomoi mpo azwa batisimo, nandimisami ete azalaki na mokano ya kosalela Yehova.
Na 1978, Motatoli moko na nkombo Elias Kazan abalaki ngai. Na 1981, ngai ná Elias tokómaki bato ya libota ya Betele, na États-Unis. * Likambo ya mawa, nsima ya kosala kaka mbula 4 na Betele, Elias akufaki. Atako mobali na ngai akufaki, nakobaki kosala mosala na ngai na Betele mpe yango esalisaki ngai namitungisaka mingi te mpe ezalaki kobɔndisa ngai.
Na 2006, nabalaki Richard Eldred, ndeko oyo azalaki mpe kosala na Betele. Ngai ná Richard tokobaki kosepela na libaku malamu ya kosala na Betele. Lokola nayebi solo na ntina na Nzambe, namonaka kaka te ete nazwaki biyano ya mituna oyo nazalaki komituna banda kala, kasi nayebaki mpe ntina mpenza ya bomoi; nyonso wana ebandaki na mituna misato oyo elenge mwasi moko atunaki ngai.
^ par. 16 Na nyonso, elenge mwasi yango ná bandeko na ye basalisaki balakisi na bango mitano báyekola Biblia mpe bákóma basambeli ya Yehova.
^ par. 18 “Betele,” oyo elimboli “Ndako ya Nzambe,” ezali liloba oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mpo na kolobela babiro ya filiale na bango na mokili mobimba. (Ebandeli 28:17, 19) Bato ya libota ya Betele bakokisaka mikumba ndenge na ndenge oyo epesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova basalaka.