Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOLONGA MITUNGISI

Mitungisi mpo na libota

Mitungisi mpo na libota

Janet alobi boye: “Mwa moke nsima ya liwa ya tata na ngai, mobali na ngai ayebisaki ngai ete azwi mwasi mosusu. Eumelaki te, kozanga kolaka, azwaki bilamba na ye nyonso mpe asundolaki ngai ná bana mibale.” Janet azwaki mosala, kasi salɛrɛ na ye ezalaki moke mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye. Mitungisi na ye esukaki kaka na kozanga mbongo te. Alobi lisusu boye: “Komitungisa makasi mpo na mikumba nyonso wana ya sika oyo nasengelaki kokokisa ngai moko ezalaki kolɛmbisa ngai mpenza. Nakómaki komiyoka lokola namemi ngambo ndenge nazalaki kokoka kokokisa bamposa ya bana na ngai te ndenge baboti mosusu basalaka. Ata lelo, namitungisaka na ndenge bato mosusu batalelaka ngai ná bana na ngai. Bamitunaka te soki nasalaki nyonso mpo na kobatela libala na ngai?”

Janet

Libondeli esalisaka Janet amitungisaka koleka ndelo te mpe abatela boyokani na ye na Nzambe. Alobi boye: “Butu nde ezali ntango ya mpasi mpenza, lokola ezalaka kimya, esalaka ete nakanisa mingi. Kobondela mpe kotánga Biblia esalisaka ngai nazwa mpɔngi. Vɛrsɛ ya Biblia oyo nalingaka mingi ezali Bafilipi 4:6, 7: ‘Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.’ Nalekisaki babutu ebele na mabondeli mpe nayokaki mpenza ete kimya ya Yehova ebɔndisaki ngai.”

Maloba ya kokitisa motema oyo Yesu alobaki likoló ya ngomba mpo na libondeli etali mitungisi ya lolenge nyonso: “Tata na bino ayebi makambo oyo bozali na bosɛnga na yango liboso kutu bósɛnga ye.” (Matai 6:8) Mpe esengeli tósɛngaka ye. Libondeli ezali likambo ya liboso oyo tokoki kosala mpo ‘tópusana penepene na Nzambe.’ Kosala bongo ekosala nini? Nzambe mpe ‘akopusana penepene na biso.’​—Yakobo 4:8.

Ya solo, libondeli esukaka kaka te na kosalisa biso tómiyoka malamu ndenge toyebisi Nzambe mitungisi na biso. Yehova, “Moyoki ya libondeli,” asalaka mpe mpo na bolamu ya baoyo balukaka ye na kondima. (Nzembo 65:2) Yango wana Yesu ateyaki bayekoli na ye ‘bábondelaka ntango nyonso mpe bálɛmba te.’ (Luka 18:1) Tosengeli kokoba kosɛnga Nzambe litambwisi mpe lisalisi na elikya ete akopesa biso mbano mpo na kondima na biso. Tosengeli ata moke te kotya ntembe na mposa to likoki oyo Nzambe azali na yango ya kosalisa biso. ‘Kobondelaka ntango nyonso’ ndenge wana emonisaka ete tozali na kondima ya solosolo.​—1 Batesaloniki 5:17.

KOZALA NA KONDIMA ELIMBOLI MPENZA NINI?

Kondima elimboli mpenza nini? Kondima esɛngaka ‘koyekola koyeba’ mpenza Nzambe. (Yoane 17:3) Kosala bongo esɛngaka liboso koluka koyeba makanisi ya Nzambe na nzela ya Biblia. Toyekolaka ete amonaka mokomoko na biso mpe alingaka kosalisa biso. Kasi, kondima ya solosolo esuki kaka te na koyeba makambo etali Nzambe. Esɛngi mpe kosala na limemya nyonso boninga na Nzambe. Kaka ndenge ezalaka epai ya bato, kosala boninga na Nzambe esɛngaka ntango. Kondima na biso ‘ekolaka’ ntango tozali koyekola makambo mingi oyo etali ye, ntango ‘tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye’ mpe ntango tozali komona ndenge azali kosalisa biso. (2 Bakorinti 10:15; Yoane 8:29) Kondima ya ndenge wana nde esalisaki Janet alonga mitungisi na ye.

Janet alobi boye: “Likambo mpenza oyo elendisaki kondima na ngai ezali komona ndenge Yehova azalaki kosalisa ngai na likambo mokomoko oyo ezalaki kokómela ngai. Mbala mingi tozalaki kokutana na makambo ya kozanga bosembo oyo tomonaki ete tokokoka kolonga yango te. Na nzela ya mabondeli, Yehova azalaki ntango nyonso kosalisa biso na ndenge oyo nakokaki kutu kokanisa te. Ntango napesaka ye mersi, etindaka ngai nakanisa makambo mingi oyo asalelá ngai. Mbala mingi, azalaki kosalisa ngai na ntango oyo nazalaki mpenza na bosɛnga. Mpe apesá ngai baninga ya solosolo ya basi mpe ya mibali oyo tosambelaka ná bango. Basalisaka ngai ntango nyonso mpe bazali ndakisa malamu mpo na bana na ngai.” *

“Namoni sikoyo ntina oyo Yehova alobi na Malaki 2:16 ete ‘ayini koboma libala.’ Mpo na molongani oyo bazweli mbanda, ezali nsuka ya kozanga bosembo mpenza. Bambula eleki mingi bandá mobali na ngai asundolá biso, kasi na bantango mosusu nayokaka kaka ete nazangi eloko moko mpe nazangi ntina. Soki likoki ezali, nasalaka eloko moko mpo na kosalisa basusu mpe yango esalisaka ngai ntango nyonso.” Kosalela toli ya Biblia oyo etali koboya kozala mosika na baninga, esalisaka Janet amitungisa mingi te. *​—Masese 18:1.

Nzambe azali ‘Tata ya bana mibali oyo batata bakufá mpe mobateli ya basi oyo mibali bakufá.’​—Nzembo 68:5

Janet alobi boye: “Koyeba ete Nzambe azali ‘Tata ya bana mibali oyo batata bakufá mpe mobateli ya basi oyo mibali bakufá,’ nde ebɔndisaka ngai mingi. Akosundola biso soki moke te ndenge mobali na ngai asalá.” (Nzembo 68:5) Janet ayebi ete Nzambe ‘amekaka bato na makambo ya mabe te.’ Kutu, apesaka bato nyonso bwanya na “motema mobimba” mpe apesaka “nguya oyo eleki makasi” mpo na kosalisa biso tólonga mitungisi.​—Yakobo 1:5, 13; 2 Bakorinti 4:7.

Bongo soki tozali komitungisa mpo bomoi na biso ezali na likama?

^ par. 10 Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge ya kolonga mitungisi, talá masolo “Ozali na bokonzi likoló ya bomoi na yo?” na Lamuká! ya 07/2015, ezali mpe na Internet na www.pr418.com.