A1
Malako mpo na kobongola Biblia
Biblia ekomamaki libosoliboso na Ebre, Aramɛyɛ, mpe Grɛki. Lelo oyo, Biblia ezali na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 3000. Bato mingi oyo batángaka Biblia bayebi minɔkɔ wana ya libosoliboso te, yango wana basengeli kosalela libongoli moko. Malako nini esengeli kolanda mpo na kobongola Biblia, mpe ndenge nini malako yango esalelami na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika?
Bato mosusu bakoki kokanisa ete kobongola liloba na liloba, ndenge ezalaka na Biblia oyo babongolá liloba mokomoko na molɔngɔ ekosalisa motángi ayeba likanisi oyo eyokani mingi na oyo ebimaki na minɔkɔ ya libosoliboso. Nzokande ezalaka ntango nyonso bongo te. Talá mwa bantina oyo:
-
Ezali te na minɔkɔ mibale oyo gramɛrɛ, maloba mpe ndenge ya kosala bafraze ekokani mpenza. Molakisi moko ya Ebre na nkombo Samuel Driver akomaki ete minɔkɔ “ekeseni kaka na gramɛrɛ mpe na maloba te, kasi mpe . . . na ndenge ya kobimisa makanisi na fraze.” Bato oyo balobaka monɔkɔ ekeseni bakanisaka ndenge moko te. Molakisi Driver abakisi: “Yango wana ndenge ya kosala bafraze elandaka monɔkɔ na monɔkɔ.”
-
Maloba mpe gramɛrɛ ya monɔkɔ moko te lelo ekokani mpenza na Ebre, Aramɛyɛ mpe Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia; na yango soki babongoli Biblia liloba na liloba, bisika mosusu ekoki kozala polele te, to kutu kopesa ndimbola ya libunga.
-
Liloba to maloba ekoki kozwa ndimbola mosusu na kotalela ndenge basaleli yango na kati ya lisolo.
Mobongoli akoki kobongola bavɛrsɛ mosusu liloba na liloba mpe kobimisa likanisi ya minɔkɔ ya libosoliboso, kasi asengeli kosala yango na bokɛngi mpenza.
Talá mwa bandakisa oyo emonisi ete kobongola liloba na liloba ekoki kopesa likanisi ya mabe na bisika mosusu:
-
Matai 28:13; Misala 7:60) Ntango liloba yango esalelami mpo na kolobela liwa, babongoli ya Biblia bakoki kosalela maloba lokola “kolala na liwa,” mpo na kosalisa motángi ya lelo azala na mobulungano te.—1 Bakorinti 7:39; 1 Batesaloniki 4:13; 2 Petro 3:4.
Makomami esaleli liloba “kolala” mpo na kolobela kolala ya mpɔngi mpe kolala ya liwa. ( -
Na Baefese 4:14, ntoma Paulo asaleli maloba oyo ekoki kobongolama liloba na liloba na “mbuma ya lisano ya mibali.” Elobeli yango ya ntango ya kala elobelaka momeseno ya kobuba basusu na lisano ya kobwaka mbuma. Na minɔkɔ mingi, soki ebongolami liloba na liloba, bato bakangaka ntina na yango te. Soki ebongolami “bokosi ya bato,” likanisi ebimaka polele.
-
Baroma 12:11 esaleli maloba ya Grɛki oyo elimboli mpenzampenza “na elimo kotoka.” Kobongola bongo ebimisaka likanisi oyo esengeli te na Lingala, yango wana na libongoli oyo, ebongolami na “elimo santu epesa bino makasi.”
-
Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu asalelaki maloba oyo ebongolamaka mingi na “Mapamboli epai na babola na elimo.” (Matai 5:3, haut fleuve) Kasi na minɔkɔ mingi, kobongola liloba na liloba ebimisaka likanisi polele te. Na minɔkɔ mosusu, koloba “babola na elimo” emonisaka bato oyo bazangi mayele, makasi mpe mpiko. Nzokande, Yesu azalaki koteya bato ete esengo ya solosolo eutaka na kokokisa bamposa na bango ya mosuni te, kasi nde na kondima ete bazali na mposa ya litambwisi ya Nzambe. (Luka 6:20) Na yango, kobongola “baoyo bayebi mposa na bango ya elimo” to “baoyo batiaka mitema bobele na Nzambe” emonisaka likanisi ya libosoliboso na bosikisiki.—Matai 5:3; Bible na lingala ya lelo oyo.
-
Na bisika mingi, liloba ya Ebre mpo na “zuwa” eyokani na ndimbola ya liloba yango na Lingala: koyoka nkanda mpo tomoni lokola moninga moko azangi bosembo to koyokela basusu likunya mpo na biloko na bango. (Masese 6:34; Yisaya 11:13) Nzokande, liloba yango ya Ebre esalelamaka mpe na ndenge ya malamu. Na ndakisa, ekoki kolobela “molende,” to mpiko ya kobatela, oyo Yehova amonisaka mpo na basaleli na ye to mpe ndenge “asɛngaka kokangama kaka na ye.” (Kobima 34:14; 2 Bakonzi 19:31; Ezekiele 5:13; Zekaria 8:2) Ekoki mpe kolobela “molende” ya basaleli na ye ya sembo mpo na Nzambe mpe losambo na ye, to mpe ndenge ‘batikaka te básalela ye bombanda.’—Nzembo 69:9; 119:139; Mitángo 25:11.
-
Na Ebre, liloba lobɔkɔ ya moto ekoki kozala na bandimbola mingi. Na kotalela lisolo, liloba yango ekoki kolimbola “bokonzi,” “bokabi,” to “nguya.” (2 Samwele 8:3; 1 Bakonzi 10:13; Masese 18:21) Kutu, na libongoli ya Biblia oyo, liloba yango ebongolami na balolenge koleka 40.
Na yango, kobongola Biblia esuki kaka te na kobongola liloba moko boye ndenge moko esika nyonso oyo esalelami. Mobongoli asengeli kozala na bososoli mpo apona malamu maloba ya monɔkɔ na ye oyo ekobimisa mpenza likanisi ya makomi ya libosoliboso ya Biblia. Lisusu, esengeli kobongisa bafraze na ndenge oyo eyokani na mibeko ya gramɛrɛ ya monɔkɔ na bango, mpo ezala pɛtɛɛ na kotánga.
Nzokande, esengeli te kobalola makomi na ndenge ya kolekisa ndelo. Mobongoli oyo azali kobalolabalola maloba ya Biblia mpo ebimisa likanisi oyo ye akangi ntina, akoki kobebisa ndimbola ya makomi ya Biblia. Na ndenge nini? Mobongoli akoki kokɔtisa makanisi na ye ya libunga na ndimbola ya makomi ya Biblia to kolongola makambo mosusu ya ntina. Na yango, kobalolabalola makomi ya Biblia ekoki kozala pɛtɛɛ na kotánga, kasi ntango mosusu epekisaka motángi amona nsango ya solosolo ya makomi ya Biblia.
Mobongoli akoki koluka kokɔtisa bindimeli na ye na mosala. Na ndakisa, Matai 7:13 elobi: “Nzela oyo efungwamá ezali komema na libebi.” Babongoli mosusu, oyo mbala mosusu balandaki bindimeli na bango, basaleli liloba “lifelo” na esika básalela “libebi,” ndenge liloba ya Grɛki elimboli mpenza.
Mobongoli asengeli mpe koyeba ete Biblia ekomamaki na elobeli ya mokolo na mokolo ya bato nyonso, lokola basali-bilanga, babateli ya mpate, mpe babomi-mbisi. (Nehemia 8:8, 12; Misala 4:13) Boye, libongoli malamu ya Biblia ezali oyo esalisaka bato ya mitema sembo, ezala batángá to te, bákanga ntina ya nsango na yango. Esalelaka maloba oyo bato nyonso bayebi mpe basaleleka mingi, na esika ya maloba oyo basalelaka mpenza te.
Babongoli ebele ya Biblia lelo bazwá ekateli mabe ya kolongola nkombo ya Nzambe, Yehova, nzokande nkombo yango ezali na bamaniskri ya kala. (Talá Apɛndisi A4.) Mabongoli mingi etyá titre lokola “Nkolo” na esika ya nkombo ya Nzambe, mpe mosusu kutu emonisaka polele te ete Nzambe azali na nkombo. Na ndakisa, mabongoli mosusu ebongolá libondeli ya Yesu oyo ezali na Yoane 17:26 boye: “Nasali ete báyeba yo,” mpe Yoane 17:6, “Namonisi yo epai ya baoyo opesaki ngai.” Kasi, soki libondeli yango ebongolami na bosembo, ekozala nde: “Nayebisi bango nkombo na yo” mpe ‘Namonisi nkombo na yo polele epai ya baoyo opesaki ngai.’
Maloba ya ebandeli ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya liboso na Anglais elobaki: “Tobalolibaloli makanisi ya Makomami te. Tosali makasi tóbongola liloba na liloba na bisika oyo esimbi na elobeli ya Anglais ya mikolo oyo, mpe na bisika oyo likanisi ekobeba te.” Na yango, Komite ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika esali makasi mpo bokatikati ezala: esaleli maloba oyo ebimisi likanisi ya minɔkɔ ya libosoliboso, mpe eboyi kosalela bafraze ya mindɔndɔ to oyo ekobebisa likanisi. Na bongo, Biblia ekozala pɛtɛɛ na kotánga mpe motángi akoki kotya motema ete nsango na yango oyo euti na Nzambe ebongolami na bosembo.—1 Batesaloniki 2:13.