Mokanda ya liboso ya Ntango 19:1-19

  • Baamone basambwisi bamemi-nsango ya Davidi (1-5)

  • Balongi Baamone mpe bato ya Siri (6-19)

19  Na nsima Nahashe mokonzi ya Baamone akufaki, mpe mwana na ye akómaki mokonzi na esika na ye.+  Na yango, Davidi alobaki: “Nakomonisela Hanune mwana ya Nahashe bolingo ya sembo,+ mpo tata na ye amoniselaki ngai bolingo ya sembo.” Bongo Davidi atindaki bamemi-nsango bákende kobɔndisa Hanune mpo na liwa ya tata na ye. Kasi ntango basaleli ya Davidi bakómaki na mokili ya Baamone+ mpo na kobɔndisa Hanune,  bankumu ya Baamone balobaki na Hanune boye: “Okanisi ete Davidi atindeli yo babɔndisi nde mpo na kokumisa tata na yo? Ezali te mpo na koluka koyeba mboka, kotalatala mokili na mayele mpe kokweisa yo, nde basaleli na ye bayei epai na yo?”  Bongo Hanune akangaki basaleli ya Davidi, akataki bango mandefu,+ mpe apasolaki bilamba na bango na katikati, na masɔkɔ, mpe abenganaki bango.  Ntango bayebisaki Davidi likambo ya mibali yango, na mbala moko atindaki bato mosusu bákende kokutana na mibali yango, mpo basambwaki mpenza; mpe mokonzi ayebisaki bango: “Bófanda na Yeriko+ tii ntango mandefu na bino ekokola, bongo na nsima bokozonga.”  Na nsima, Baamone bamonaki ete bakómi eloko ya nsolo mabe na miso ya Davidi. Na yango, Hanune ná Baamone batindaki talanta* 1 000 ya palata mpo na kofutela makalo mpe batambwisi-mpunda na Mezopotamia,* Arame-maaka, mpe Soba.+  Na yango bafutelaki makalo 32 000, mpe bazwaki mokonzi ya Maaka ná bato na ye. Bongo bayaki mpe batyaki kaa liboso ya Medeba.+ Baamone babimaki na bingumba na bango, bayanganaki, mpe bakendaki na etumba.  Ntango Davidi ayokaki yango, atindaki Yoabe+ ná limpinga mobimba ya basoda, ata mpe bilombe na ye ya etumba oyo baleki makasi.+  Bongo Baamone babimaki mpe batandamaki na molɔngɔ ya etumba na esika ya kokɔta na engumba, wana bakonzi oyo bayaki kosalisa bango batɛlɛmaki bango moko na esobe. 10  Ntango Yoabe amonaki ete banguna bazali koyela ye na liboso mpe na nsima, aponaki ndambo ya basoda ya Yisraele oyo baleki makasi mpe atandaki bango na molɔngɔ mpo bábunda na bato ya Siri.+ 11  Atikaki basoda mosusu na mabɔkɔ ya ndeko na ye Abishai,+ mpo atanda bango na molɔngɔ mpo na kobunda na Baamone. 12  Bongo alobaki: “Soki bato ya Siri+ bakómi makasi koleka ngai, okoya kosalisa ngai; kasi soki Baamone bakómi makasi koleka yo, ngai nakosalisa yo. 13  Tózala na makasi mpe na mpiko.+ Tóbundela bato na biso mpe bingumba ya Nzambe na biso, mpe Yehova akosala oyo ezali malamu na miso na ye.” 14  Na nsima Yoabe ná basoda na ye bapusanaki mpo na kobunda na bato ya Siri, kasi bato ya Siri bakimaki.+ 15  Ntango Baamone bamonaki ete bato ya Siri bakimi, bango mpe bakimaki Abishai ndeko ya Yoabe mpe bazongaki na kati ya engumba. Na nsima Yoabe azongaki na Yerusaleme. 16  Ntango bato ya Siri bamonaki ete Yisraele elongi bango, batindaki bamemi-nsango bábenga bato ya Siri oyo bazalaki na etúká ya Ebale;*+ Shofake, mokonzi ya basoda ya Hadadezere, nde azalaki kokamba bango.+ 17  Ntango nsango yango ekómelaki Davidi, na mbala moko ayanganisaki limpinga mobimba ya Yisraele, akatisaki Yordani, apusanaki epai ya bato ya Siri, mpe abongisaki basoda na ye mpo na kobunda na bango. Davidi atandaki basoda na ye na molɔngɔ mpo na kokutana na bato ya Siri, mpe bato ya Siri babundisaki ye.+ 18  Kasi bato ya Siri bakimaki Bayisraele; mpe Davidi abomaki batambwisi-makalo 7 000 mpe basoda ya Siri 40 000 oyo batambolaka na makolo. Abomaki mpe Shofake, mokonzi ya basoda na bango. 19  Ntango basaleli ya Hadadezere bamonaki ete Bayisraele balongi bango,+ basalaki nokinoki boyokani ná Davidi mpe bakómaki bato na ye.+ Bongo bato ya Siri bazalaki kolinga lisusu te kosalisa Baamone.

Maloba na nse

Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.
Lil., “Arame-naharaime.”
Elingi koloba, Efrate.