Ndenge ekomamá na Yoane 5:1-47

  • Moto moko ya maladi abikisami na Betezata (1-18)

  • Bokonzi oyo Yesu azwi epai ya Tata na ye (19-24)

  • Bakufi bakoyoka mongongo ya Yesu (25-30)

  • Litatoli mpo na Yesu (31-47)

5  Nsima na yango, ezalaki na fɛti+ moko ya Bayuda, mpe Yesu amataki na Yerusaleme. 2  Nzokande na Yerusaleme, pene na Porte ya Bampate+ ezali na pisini moko oyo ebengami na Ebre Betezata; pisini yango ezalaki na veranda ya makonzí mitano. 3  Na veranda yango, ebele ya bato ya maladi, bato bakufá miso, batɛngumi, mpe bato oyo mabɔkɔ to makolo ekauká* balalaki wana na nse. 4  *—— 5  Kasi ezalaki na moto moko oyo azalaki wana, oyo aumeli na maladi mbula 38. 6  Ntango amonaki moto yango alali wana, mpe lokola ayebaki ete aumeli na maladi ntango molai, Yesu alobaki na ye: “Olingi kobika?”+ 7  Moto yango ya maladi ayanolaki ye: “Tata, nazali na moto te oyo akotya ngai na pisini ntango mai eningani; kasi ntango nazali kokende na mai, moto mosusu akiti liboso na ngai.” 8  Yesu alobaki na ye: “Tɛlɛmá! Zwá litɔkɔ* na yo mpe tambolá.”+ 9  Mpe na mbala moko moto yango abikaki; alɔkɔtaki litɔkɔ na ye mpe abandaki kotambola. Mokolo yango ezalaki Sabata. 10  Bongo Bayuda babandaki koloba na moto oyo abikaki: “Ezali Sabata, ozali na ndingisa te ya komema litɔkɔ oyo.”+ 11  Kasi azongiselaki bango: “Moto oyo abikisaki ngai nde alobaki na ngai: ‘Zwá litɔkɔ na yo mpe tambolá.’” 12  Batunaki ye: “Moto yango nani oyo ayebisaki yo: ‘Zwá litɔkɔ mpe tambolá’?” 13  Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki nani moto abikisaki ye, mpo Yesu akɔtaki na kati ya ebele ya bato oyo bazalaki wana. 14  Nsima na yango, Yesu amonaki ye na tempelo mpe alobaki na ye: “Yo wana okómi malamu. Kosala lisusu lisumu te, mpo likambo ya mabe koleka ekómela yo te.” 15  Moto yango akendaki mpe ayebisaki Bayuda ete ezalaki Yesu nde abikisaki ye. 16  Ezalaki mpo na ntina yango nde Bayuda babandaki konyokola Yesu, mpo azalaki kosala makambo wana na Sabata. 17  Kasi azongiselaki bango: “Tata na ngai akobi kosala tii sikoyo, ngai mpe nazali kokoba kosala.”+ 18  Yango wana, Bayuda balukaki lisusu makasi koboma ye, kaka te mpo azalaki kotosa Sabata te, kasi mpe mpo azalaki kobenga Nzambe Tata na ye mpenza,+ mpe na bongo azalaki komikokanisa na Nzambe.+ 19  Yango wana Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino, Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi asalaka kaka makambo oyo amonaka Tata azali kosala.+ Mpo makambo nyonso oyo Ye asalaka, Mwana mpe asalaka yango kaka bongo. 20  Mpo Tata alingi Mwana mingi+ mpe alakisi ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka, mpe akolakisa ye makambo ya minene koleka oyo, mpo bókamwa.+ 21  Mpo, kaka ndenge Tata alamwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi,+ ndenge moko mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo ye alingi.+ 22  Mpo Tata asambisaka ata moto moko te, kasi apesi mokumba nyonso ya kosambisa epai ya Mwana,+ 23  mpo bato nyonso bákumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo azali kokumisa Mwana te azali mpe kokumisa Tata te, oyo atindaki ye.+ 24  Ya solo mpenza nalobi na bino, moto oyo ayoki liloba na ngai mpe andimeli Ye oyo atindaki ngai azali na bomoi ya seko,+ mpe akosambisama te, kasi alongwe na liwa, akómi na bomoi.+ 25  “Ya solo mpenza nalobi na bino, ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, ntango bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana ya Nzambe, mpe baoyo bakotya likebi bakozwa bomoi. 26  Mpo kaka ndenge Tata azali na bomoi na kati na ye moko,*+ apesi mpe Mwana nzela ya kozala na bomoi na kati na ye moko.+ 27  Mpe apesi ye bokonzi ya kosambisa,+ mpo azali Mwana ya moto.+ 28  Bókamwa te mpo na yango, mpo ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita* bakoyoka mongongo na ye+ 29  mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, mpe baoyo basalaki makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.+ 30  Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko. Nasambisaka na kolanda oyo nayoki, mpe lisambisi na ngai ezali sembo,+ mpo nalukaka kosala mokano na ngai moko te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.+ 31  “Soki ngai moko kaka nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali solo te.+ 32  Ezali na moto mosusu oyo azali kopesa litatoli mpo na ngai, mpe nayebi ete litatoli oyo azali kopesa mpo na ngai ezali solo.+ 33  Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye apesaki litatoli mpo na solo.+ 34  Nzokande, nandimaka te litatoli oyo euti na moto, kasi nalobi makambo wana mpo bino bóbika. 35  Moto yango azalaki mwinda oyo ezali kopela mpe kongɛnga, mpe mpo na ntango moke, bondimaki kosepela mingi na pole na ye.+ 36  Kasi nazali na litatoli oyo eleki oyo ya Yoane, mpo kaka makambo oyo Tata na ngai apesaki ngai nasala, yango nde nazali kosala, makambo yango oyo nazali kosala ezali kopesa litatoli ete Tata atindaki ngai.+ 37  Mpe Tata, ye oyo atindaki ngai, ye moko apesi litatoli mpo na ngai.+ Boyoká mongongo na ye ata mbala moko te mpe bomoná lolenge na ye te,+ 38  mpe bobateli te liloba na ye na mitema na bino, mpo bozali kondima te moto oyo ye atindi. 39  “Bozali koyekola Makomami na likebi+ mpo bokanisi ete bokozwa bomoi ya seko na nzela na yango; mpe yango* mpenza nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai.+ 40  Mpe atako bongo bolingi koya epai na ngai te+ mpo bózwa bomoi. 41  Nandimaka nkembo oyo euti na bato te, 42  kasi nayebi malamu ete bozali na bolingo ya Nzambe te na kati na bino. 43  Nayei na nkombo ya Tata na ngai, kasi boyambi ngai te. Soki moto mosusu ayaka na nkombo na ye moko, mbɛlɛ boyambi moto yango. 44  Ndenge nini bokoki kondima, bino bato bozali kondima nkembo oyo bino na bino bopesanaka mpe bozali koluka te nkembo oyo euti na Nzambe kaka moko?+ 45  Bókanisa te ete nakofunda bino epai ya Tata; moto oyo azali kofunda bino ezali Moize,+ oyo botyeli elikya. 46  Kutu, soki bozalaki kondimela Moize, bolingaki mpe kondimela ngai, mpo akomaki makambo etali ngai.+ 47  Kasi soki bozali kondimela makomi na ye te, ndenge nini bokondimela makambo oyo nazali koloba?”

Maloba na nse

To, “ekufá.”
Talá Ap. A3.
To, “mbeto.”
To, “azali na likabo ya bomoi na kati na ye moko.”
Lil., “malita ya kokanisama.”
Elingi koloba, Makomami.