Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kobanda lisolo

Ndenge ya kobanda lisolo

LAMUKÁ!

Motuna: Nasepeli kopesa yo nimero ya sika ya Lamuká! Talá motuna oyo ezali na lokasa 2. Okanisi nini mpo na yango?

Vɛrsɛ: Mas 24:10

Okoki koloba boye: Lisolo oyo elobeli batoli mosusu ya Biblia oyo eyokani na likambo yango.

LAMUKÁ!

Motuna: Ezali mpenza na ntina tóponaka baninga ya malamu, boye te?

Vɛrsɛ: Mas 13:20

Okoki koloba boye: Lamuká! oyo ezali na batoli oyo ebongi mpenza na likambo etali kopona baninga ya malamu. [Lobelá lisolo oyo ezali na nkasa 10-11.]

YOKÁ NZAMBE

Motuna: Okosepela kofanda na mokili ya boye? [Lakisá ye nkasa 2-3, mpe tiká ye apesa eyano.]

Vɛrsɛ: Yir 29:11

Okoki koloba boye: Mwa buku oyo emonisi ndenge oyo tokoki koyoka Nzambe mpe kosepela na makambo kitoko oyo akani mpo na biso. [Bótalela nkasa 4-5.]

KOMÁ MALOBA NA YO MOKO YA KOBANDA LISOLO

Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.