Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | ESTERE 1-5

Estere asalaki nyonso mpo na basaleli ya Nzambe

Estere asalaki nyonso mpo na basaleli ya Nzambe

Estere amonisaki kondima makasi mpe mpiko mpenza ntango azalaki kolongisa basaleli ya Nzambe

  • Moto nyonso oyo akei epai ya mokonzi kozanga kobengisama akokaki kobomama. Mokonzi abengisaki Estere te esilaki koleka mikolo 30

  • Mokonzi Ahasueruse, oyo bato bakanisaka ete ye nde Zerezese I, azalaki moto ya nkandankanda. Mokolo moko, apesaki mitindo ete bákata moto moko na biteni mibale mpo ezala likebisi mpo na basusu. Lisusu, ntango mwasi na ye Vasheti aboyaki kotosa ye, mokonzi aboyaki ye

  • Estere asengelaki komonisa ete azali Moyuda mpe kondimisa mokonzi ete Hamane, mopesi-toli oyo mokonzi azalaki kotyela motema, akosaki mokonzi