Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

26/02–​4/03/2018

MATAI 18-19

26/02–​4/03/2018
  • Loyembo 121 mpe libondeli

  • Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

  • Kebá ete omibɛtisa to obɛtisa basusu libaku te”: (Min. 10)

    • Mt 18:6, 7​—Tosengeli kobɛtisa basusu libaku te (“libanga oyo banikaka na yango mbuma, lokola oyo mpunda ebalolaka,” “kobɛtisa kondima ya bato mabaku to biloko oyo ebɛtisaka mabaku” banɔti mpo na koyekola mpe “Libanga oyo banikaka na yango mbuma,” “Mabanga oyo banikaka na yango mbuma ya likoló ná ya nse” bililingi mpe bavideo na Mt 18:6, 7, nwtsty-E)

    • Mt 18:8, 9​—Tosengeli koboya eloko nyonso oyo ekosala ete tóbɛta libaku (“Gehena” nɔti mpo na koyekola na Mt 18:9, nwtsty-E mpe “Gehena” ndimbola ya liloba)

    • Mt 18:10​— Soki tobɛtisi basusu libaku Yehova ayebaka yango (“kotala elongi ya Tata na ngai” nɔti mpo na koyekola na Mt 18:10, nwtsty-E; w10 1/11 lok. 16)

  • Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)

    • Mt 18:21, 22​—Mbala boni tosengeli kolimbisa bandeko na biso? (“mbala 77” nɔti mpo na koyekola na Mt 18:22, nwtsty-E)

    • Mt 19:7​—Mpo na nini bazalaki kopesa “mokanda ya kobengana mwasi” na libala? (“mokanda ya kobengana mwasi” nɔti mpo na koyekola mpe “Mokanda ya koboma libala” bililingi mpe bavideo na Mt 19:7, nwtsty-E)

    • Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?

    • Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?

  • Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Mt 18:18-35

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

  • Kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Eleka min. 3 te) Salelá makanisi oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.”

  • Kozongela moto mpo na mbala ya misato: (Eleka min. 3 te) Poná vɛrsɛ moko oyo olingi, mpe pesá ye mokanda oyo toyekolaka na bato Biblia.

  • Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 6 te) bhs lok. 26 par. 18-20​—Salá na ndenge oyo ekosimba motema ya moyekoli.

BOMOI YA BAKRISTO

  • Loyembo 90

  • Kobɛtisa basusu libaku na likambo moko te (2Ko 6:3): (Min. 9) Lakisá video yango.

  • Kampanye ya Ekaniseli ekobanda na mokolo ya 3/03/2018: (Min. 6) Diskur ekouta na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo ya sanza ya 02/2016, “Bengisá moto nyonso ya teritware na yo na Ekaniseli!” Bópesa bayangani lokasa mokomoko ya libyangi ya Ekaniseli mpe lobelá makambo ezali na kati. Monisá ete diskur ya ntina mingi oyo ezali na motó ya likambo: “Yesu Kristo azali mpenza nani?” ekosalema na pɔsɔ ya 19/03/2018. Ekosala ete bato bázela Ekaniseli na mposa makasi. Lobelá bibongiseli oyo lisangá na bino ezwi mpo na kokabola nkasa ya libyangi na teritware mobimba.

  • Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 10, etanda “Mobembo moko ya esengo

  • Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)

  • Loyembo 133 mpe libondeli