Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 12-13

Ndakisa ya blé mpe matiti mabe

Ndakisa ya blé mpe matiti mabe

Yesu asalelaki ndakisa ya blé mpe matiti mabe mpo na komonisa ndenge nini mpe ntango nini asengelaki koyanganisa blé nyonso; elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kobanda na mobu 33 T.B.

13:24

‘Moto moko alonaki mboto ya malamu na elanga na ye’

  • Moloni: Yesu Kristo

  • Mboto ya malamu elonami: Bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo santu

  • Elanga: Mokili

13:25

“Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe”

  • Monguna: Zabolo

  • Bato balalaki mpɔngi: Liwa ya bantoma

13:30

“Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma”

  • Blé: Bakristo oyo batyami mafuta na elimo

  • Matiti mabe: Bakristo ya lokuta

“Liboso bópikola matiti mabe . . . ; na nsima bóbanda koyanganisa blé”

  • Baombo/​babuki-mbuma: Baanzelu

  • Matiti mabe oyo bapikoli: Bakristo ya lokuta bakabwani na bakristo oyo batyami mafuta na elimo

  • Koyanganisa blé na kati ya ndako ya kobomba biloko: Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayanganisami na lisangá ya bokristo oyo epɛtolami

Ntango eleko ya kobuka mbuma ebandaki, nini ekesenisaki bakristo ya solo na bakristo ya lokuta?

Koyeba ndimbola ya ndakisa oyo ekosalisa ngai na nini?