Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 14-15

Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke

Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke

Mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 32 T.B., Yesu asalaki likamwisi moko, yango nde likamwisi oyo Baevanzile nyonso minei elobeli.

Na nzela ya likamwisi yango, Yesu apesaki ndakisa oyo azali kokoba kolanda tii lelo.

14:16-21

  • Yesu ayebisaki bayekoli na ye báleisa ebele ya bato, atako bazalaki kaka na mampa mitano mpe mbisi mibale

  • Yesu azwaki mampa mpe mbisi, nsima ya kobondela, abandaki kokabolela yango bayekoli na ye, oyo na ngala na bango, bakabolelaki yango ebele ya bato

  • Na likamwisi wana, moto nyonso alyaki, atondaki, mpe bilei mosusu etikalaki. Yesu aleisaki bankóto ya bato na nzela ya bato moke kaka​—bayekoli na ye

  • Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka, akotya moombo moko mpo apesaka ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’​—Mt 24:45

  • Na 1919, Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mwa etuluku moko ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpo bábatela “basali na ye,” baoyo bazali koleisama

  • Na nzela ya mwa etuluku yango ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, Yesu azali kolanda ndakisa oyo atikaki na siɛklɛ ya liboso

Ndenge nini nakoki komonisa ete nazali kondima mpe komemya moombo yango oyo Yesu azali kosalela mpo na koleisa bato na elimo?