Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

“Kumisá tata na yo mpe mama na yo”

“Kumisá tata na yo mpe mama na yo”

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azongelaki mobeko oyo: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Kob 20:12; Mt 15:4) Na ntembe te, Yesu azalaki koloba polele mpo “azalaki kaka komikitisa” liboso ya baboti na ye ntango azalaki elenge. (Lk 2:51) Ntango akómaki mokóló, azwaki bibongiseli mpo mama na ye abatelama malamu nsima ya liwa na ye.​—Yn 19:26, 27.

Lelo oyo mpe, bilenge bakristo oyo batosaka mpe balobaka na baboti na bango na limemya bakumisaka baboti yango. Kutu, mobeko oyo esɛngi kokumisa baboti etaleli ntango te. Ata ntango baboti na biso bakómi mibange, tokokoba kokumisa bango soki tozali koyoka toli na bango. (Mas 23:22) Tokokumisa mpe baboti na biso oyo bakómi mibange soki tozali kotya likebi na ndenge bazali komiyoka mpe kosunga bango na mbongo soki bazali na bosɛnga. (1Ti 5:8) Tózala bilenge to mikóló, soki tozali kosolola malamu na baboti na biso ekomonisa ete tokumisaka bango.

TALÁ VIDEO YA MOTO AZALI KOYEMA NDENGE NINI NAKOKI KOSOLOLA NA BABOTI NA NGAI? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini okoki komona ete ezali mpasi kosolola na baboti na yo?

  • Ndenge nini okoki kokumisa baboti na yo ntango ozali kosolola na bango?

  • Mpo na nini ezali na ntina osololaka na baboti na yo? (Mas 15:22)

    Kosolola na baboti na yo ekoki kosalisa yo olonga na bomoi