Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kosalela malamu mituna

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kosalela malamu mituna

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Soki “makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo,” boye mituna ezali lokola katini ya kotoka mai yango. (Mas 20:5) Mituna esalisaka biso tókɔtisa bayoki na biso na lisolo. Mbala mingi, biyano na mituna oyo eponami malamu esalisaka na koyeba makanisi ya moto. Yesu asalelaki malamu mituna. Ndenge nini tokoki komekola ye?

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Tuná mituna oyo ekotinda moto abimisa makanisi na ye. Yesu atunaki mituna mingi oyo ebongi mpo na koyeba makanisi ya bayekoli na ye. (Mt 16:13-16; be lok. 238 par. 3-5) Mituna nini okoki kotuna mpo moto abimisa makanisi na ye?

  • Tuná mituna oyo ekotinda moto azwa eyano. Mpo na kosembola makanisi ya Petro, Yesu atunaki mituna mpe apesaki biyano ndenge na ndenge mpo Petro azwa oyo ya malamu. (Mt 17:24-26) Mituna nini okoki kotuna mpo na kosalisa moto azwa eyano ya malamu?

  • Pesá moyoki na yo longonya. Ntango mokomeli moko ‘ayanolaki na mayele,’ Yesu apesaki ye longonya. (Mr 12:34) Ndenge nini okoki kopesa moto moko longonya mpo ayanoli na motuna moko?

TALÁ ETENI YA LIBOSO YA VIDEO SALÁKÁ MOSALA OYO YESU ASALAKI ​—TEYÁKÁ, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini tolobi ete lolenge oyo ndeko ateyi ezali mabe atako alobi makambo ya solo?

  • Mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na kolimbola makambo?

TALÁ ETENI YA MIBALE YA VIDEO YANGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini ndeko asaleli malamu mituna?

  • Na makambo nini mosusu tokoki komekola ndenge na ye ya koteya?

Mateya na biso etindaka basusu basala nini? (Lk 24:32)