Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kobá kozela na ezaleli ya koyika mpiko

Kobá kozela na ezaleli ya koyika mpiko

Esali sikoyo mbula boni banda ozelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya? Ozali kokoba koyika mpiko mpe komonisa motema molai atako ozali kokutana na mikakatano? (Ro 8:25) Bato bazali koyina, konyokola mpe kotya bandeko na biso mosusu na bolɔkɔ, ata mpe koluka koboma bango. Bamosusu mpe bazali koyika mpiko na maladi oyo esilaka te to mpe bobange.

Nini ekosalisa biso tózela na mposa makasi ata na komekama ya ndenge nini? Tosengeli kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kokanisa na mozindo makambo oyo tozali kotánga mpo kondima na biso ezala kaka makasi. Tosengeli kotya makanisi na elikya na biso. (2Ko 4:16-18; Ebr 12:2) Tosengeli kobondela Yehova mpe kosɛnga nguya ya elimo santu na ye. (Lk 11:10, 13; Ebr 5:7) Tata na biso ya bolingo akoki kosalisa biso ‘tóyika mpenza mpiko mpe tózala na motema molai ná esengo.’​—Kol 1:11.

TALÁ VIDEO TOSENGELI “KOYIKA MPIKO NTANGO TOZALI KOPOTA MBANGU”​—ZALÁ NA KONDIMA ETE OKOZWA MBANO, MPE NA NSIMA, YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • ‘Makambo nini oyo ekanami te’ ekoki kokómela biso? (Mos 9:11)

  • Ndenge nini libondeli esalisaka biso ntango tokutani na komekama?

  • Soki tozali kokoka lisusu te kosala mingi na mosala ya Yehova ndenge ezalaki liboso, mpo na nini tosengeli kotya makanisi na oyo tozali naino na likoki ya kosala?

  • Tyá miso na yo na mbano

    Nini esalisaka yo ozala ntango nyonso na elikya ete okozwa mbano?