Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kokata boyekoli ya Biblia na bato oyo bazali kokola te

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kokata boyekoli ya Biblia na bato oyo bazali kokola te

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Bato basengeli kobelela nkombo ya Yehova mpo bábika. (Ro 10:13, 14) Kasi, moto nyonso te oyo andimaka koyekola Biblia nde akolinga koyokanisa bomoi na ye na mitinda ya Yehova. Tokosalela malamu ntango na biso na mosala ya kosakola soki tozali kosalisa baoyo balingi mpenza kobongola bomoi na bango mpo na kosepelisa Yehova. Soki moyekoli ya Biblia azali kokola mpenza te na elimo nsima ya koyekola na ye na boumeli ya ntango oyo esengeli, ekozala malamu tósalela ntango na biso mpo na kosalisa baoyo Yehova azali kobenda epai na ye mpe na ebongiseli na ye. (Yn 6:44) Toboyi te, soki na nsima moto yango asali makambo oyo emonisi ete ‘azali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko,’ tokozongela koyekola na ye Biblia na esengo nyonso.​—Mis 13:48.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Pesá moyekoli ya Biblia longonya ndenge alingaka kozwa boyebi ya sikisiki.​—1Ti 2:4

  • Monisá ye ntina ya kosalela makambo oyo ayekoli.​—Lk 6:46-49

  • Na boboto nyonso, pesá ye ndakisa ya moloni oyo Yesu alobelaki mpe yebisá ye atalela makambo nini ezali kopekisa ye akola na elimo.​—Mt 13:18-23

  • Na mayele nyonso, monisá ye ntina oyo ozali kokata boyekoli ya Biblia na ye

  • Yebisá ye ete na bantango mosusu okobanda koleka mpo na kolendisa ye mpe ete bokoki kozongela boyekoli ya Biblia soki abongisi makambo

TALÁ VIDEO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Liteya nini ozwi na lisolo oyo mosakoli asololaki na moyekoli ya Biblia, oyo emonisaki ete azalaki kokola te na elimo?

  • Ndenge nini mosakoli asalisaki moyekoli ya Biblia amona ete asengelaki kosala mbongwana?

  • Ndenge nini mosakoli amonisaki ete bakoki kozongela boyekoli soki moyekoli akómi kosalela makambo oyo azali koyekola?