Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Omonaka bizaleli ya Nzambe oyo emonanaka te?

Omonaka bizaleli ya Nzambe oyo emonanaka te?

Ntango ozali kotala fololo moko ya langi kitoko, likoló oyo etondi na minzoto, to mai oyo ezali kouta likoló ya mabanga mpe ezali kokwea na nse, omonaka misala ya Mozalisi? Biloko oyo ezali zingazinga na biso emonisaka polele bizaleli ya Yehova oyo emonanaka te. (Ro 1:20) Ntango totɛlɛmaka mwa moke mpo na kokanisa na biloko oyo miso na biso emoni, yango esalisaka biso tómona nguya, bolingo, bwanya mpe boyengebene ya Nzambe, ata mpe ezaleli na ye ya kokaba.​—Nz 104:24.

Wapi mwa biloko oyo Yehova akelá omonaka mokolo na mokolo? Ata soki ofandaka na engumba, okoki komona bandɛkɛ to banzete. Kotala malamumalamu biloko oyo Yehova akelá ekoki kosalisa biso tótika komitungisa mingi, tótya makanisi na makambo oyo eleki ntina, mpe tókóma na kondima makasi na likoki oyo Yehova azali na yango ya kokokisa bamposa na biso libela na libela. (Mt 6:25-32) Soki ozali na bana, salisá bango bámonaka bizaleli kitoko ya Yehova. Soki tokómi komonisa botɔndi mingi lisusu mpo na biloko oyo ezali zingazinga na biso, tokopusana lisusu penepene ya Mozalisi.​—Nz 8:3, 4.

TALÁ VIDEO MISALA YA KOKAMWA YA BOZALISI EMONISAKA NKEMBO YA NZAMBE​—POLE MPE LANGI, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini biloko mikemike oyo epesaka langi esalisaka biso tókesenisa balangi?

  • Nini esalaka ete biloko engɛnga?

  • Mpo na nini tomonaka langi ndenge na ndenge na likoló?

  • Balangi nini oyo ebɛtaka na miso omonaka pene ya ndako na yo?

  • Mpo na nini tosengeli kozwaka ntango ya kotala malamumalamu biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́?

Pole mpe langi emonisi nini mpo na bizaleli ya Yehova?