Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Mpo na nini tosengeli koboya ezaleli ya komilelalela?

Mpo na nini tosengeli koboya ezaleli ya komilelalela?

Yehova asepelaka te na ezaleli ya komilelalela (Mit 11:1; w01 15/6 lok. 17 par. 20)

Ezaleli ya komilelalela emonisaka ete moto azali koluka matomba na ye moko mpe azangi botɔndi (Mit 11:4-6; w06 15/7 lok. 15 par. 7)

Ezaleli ya komilelalela elɛmbisaka basusu nzoto (Mit 11:10-15; it-2-F lok. 715 par. 1)

Atako Bayisraele bakutanaki na makambo mingi ya mpasi na esobe, kasi bazalaki na makambo mingi oyo basengelaki komonisa botɔndi mpo na yango. Soki tokanisi makambo nyonso ya malamu oyo Yehova apesaka biso, yango ekosalisa biso tóboya ezaleli ya komilelalela.