Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Petro ná Yoane bazali kobongisa shambre moko ya likoló mpo na Elekeli ya mobu 33 T.B.

BOMOI YA BAKRISTO

Omibongisi mpo na Ekaniseli?

Omibongisi mpo na Ekaniseli?

Elekeli ya nsuka ya Yesu esengelaki kozala na ntina mingi. Mpo etikalaki moke abomama, abongisaki kolya Elekeli elongo na bantoma na ye, mpe abandisaki molulu ya sika oyo esengeli kosalema mbula na mbula, bilei ya mpokwa ya Nkolo. Na yango, atindaki Petro ná Yoane mpo bákende kobongisa esika bakolya Elekeli. (Lk 22:7-13; talá elilingi ya ezipeli.) Yango ezali kokundwela biso ntina ya komibongisa mpo na Ekaniseli oyo ekosalema na mokolo ya pɔsɔ mwa 27/03/2021. Masangá esengeli kozwa bibongiseli mpo na kopona molobi, kobongisa mampa ná vinyo ya Ekaniseli, mpe bongo na bongo. Kasi, mokomoko na biso akoki kosala nini mpo amibongisa mpo na Ekaniseli?

Bongisá motema na yo. Tángá mpe manyolá na bavɛrsɛ ya botángi ya Biblia na eleko ya Ekaniseli. Programɛ ya botángi ya Biblia na eleko ya Ekaniseli ezali na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Eteni 16 ya Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe ezali na programɛ ya sikisiki ya makambo oyo esalemaki. (Talá mpe Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo ya sanza ya 04/2020.) Mabota ekoki koluka na Index des publications Watch Tower to na Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova masolo oyo elobeli ntina ya lisiko mpe kolobela yango na losambo na bango na kati ya libota.

Bengisá basusu na Ekaniseli. Salá makasi omipesa mingi na kampanye ya kobengisa bato na Ekaniseli. Kanisá bato oyo okoki kobengisa, na ndakisa, bato oyo ozongelaka, bayekoli na yo ya Biblia ya kala, bato oyo oyebani na bango mpe bandeko ya libota. Bankulutu basengeli komindimisa ete babengisi bato oyo batiká kosakola. Kobosana te soki moto moko afandi mosika na teritware na bino, okoki koluka ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema epai afandi soki ofini esika bakomi OLINGI KOYEBA BISO? na likoló ya lokasa ya ebandeli ya jw.org, mpe kende na esika bakomi “Ekaniseli.”

Makambo nini mosusu tokoki kosala mpo tómibongisa malamu?