Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Bakisá esengo na yo na mosala ya kosakola​—Saleláká Liloba ya Nzambe

Bakisá esengo na yo na mosala ya kosakola​—Saleláká Liloba ya Nzambe

Liloba ya Nzambe ezali na nguya! (Ebr 4:12) Ekoki ata kosimba mitema ya baoyo bayebi Nzambe te. (1Te 1:9; 2:13) Tokoki kozala na esengo mingi ntango moto moko amonisi ete asepeli na liteya moko ya sika ya Biblia oyo tomonisi ye.

TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI​—KOLISÁ MAKOKI NA YO​—SALISÁ BATO BÁMONA NGUYA YA LILOBA YA NZAMBE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini Neeta asalisaki Rose amona nguya ya Liloba ya Nzambe ntango amonisaki ye ntina ya kosalela Liloba ya Nzambe?

  • Ndenge nini Neeta amonisaki nguya ya Liloba ya Nzambe ntango asɛngaki Rose atánga vɛrsɛ na mongongo makasi mpe anyata maloba ya ntina ya vɛrsɛ?

  • Nini emonisi ete vɛrsɛ yango esimbaki motema ya Rose, mpe mpo na yo, Neeta ayokaki ndenge nini?