Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Komekola te bato oyo bazangi bosembo

Komekola te bato oyo bazangi bosembo

Kora, Datane, mpe Abirame bamonisaki bosembo te epai ya Yehova ndenge batɛmɛlaki ebongiseli oyo atyaki. Yehova abomaki batomboki yango elongo na moto nyonso oyo apesaki bango mabɔkɔ. (Mit 16:26, 27, 31-33) Makambo nini ekoki komeka bosembo na biso epai ya Yehova? Bandakisa nini ya Biblia ekosalisa biso mpo tómekola te baoyo bazangi bosembo?

TALÁ VIDEO KOMEKOLA TE BATO OYO BAZANGAKI BOSEMBO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Likambo nini emekaki Nadia, mpe ndakisa nini ya mabe esalisaki ye amonisa bosembo?

  • Likambo nini emekaki ndeko mobali oyo azalaki kolobaloba, mpe ndakisa nini ya mabe esalisaki ye amonisa bosembo?

  • Likambo nini emekaki Terrance, mpe ndakisa nini ya mabe esalisaki ye amonisa bosembo?

  • Likambo nini emekaki ndeko mobali oyo azalaki na eteyelo, mpe ndakisa nini ya mabe esalisaki ye amonisa bosembo?