Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koluka bwanya

Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koluka bwanya

Bwanya oyo euti na Nzambe ezali na motuya ndenge moko na biloko ya motuya oyo ebombaná. (Mas 2:1-6) Bwanya esalisaka biso tóyeba ndenge malamu ya kotalela makambo mpe kozwa bikateli ya malamu. Ebatelaka biso. Yango wana, bwanya ezali “eloko ya liboso.” (Mas 4:5-7) Esɛngaka milende makasi mpo na komona biloko ya motuya na Liloba ya Nzambe. Tokoki kobanda kotánga Liloba ya Nzambe “butu moi” elingi koloba mikolo nyonso. (Yos 1:8) Komá mwa makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo otángaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe osepelaka na yango.

TALÁ VIDEO BILENGE BAZALI KOYEKOLA KOLINGA LILOBA YA NZAMBE, MPE YANOLÁ NA MITUNA OYO:

Mikakatano nini bilenge oyo bazalaki na yango ntango bazalaki komeka kotánga Biblia mikolo nyonso, mpe nini esalisaki bango?

  • Melanie

  • Samuel

  • Celine

  • Raphaello

PROGRAMƐ NA NGAI YA BOTÁNGI YA BIBLIA: