Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Tempelo mpo na losambo ebongisami lisusu malamu koleka

Tempelo mpo na losambo ebongisami lisusu malamu koleka

Mokonzi Davidi abongisaki Balevi mpe banganga-nzambe mpo na mosala ya tempelo (1Nt 23:6, 27, 28; 24:1, 3; it-2-F lok. 133, par. 2; nk. 657-658 par.7)

Bato oyo bayebaki miziki mpe baoyo bazalaki koyekola yango bazalaki kosalela Yehova na mosala yango (1Nt 25:1, 8; it-2-F lok. 358 par. 6)

Balevi bazalaki bakɛngɛli ya baporte, ya bisika ya kobomba biloko, mpe bazalaki kosala misala mosusu (1Nt 26:16-20; it-2-F lok. 620)

Losambo oyo ebongisami malamu emonisaka ete Yehova ye moko abongisaka makambo na molɔngɔ.​—1Ko 14:33.

MPO NA KOMANYOLA: Ndenge nini lisangá ya bokristo ebongisami malamu mpo na losambo lelo oyo?