Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

01-07/04

NZEMBO 23-25

01-07/04

Loyembo 4 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. “Yehova azali Mobateli na ngai”

(Min. 10)

Yehova akambaka biso (Nz 23:​1-3; w11 1/5 lok. 31 par. 3)

Yehova abatelaka biso (Nz 23:4; w11 1/5 lok. 31 par. 4)

Yehova aleisaka biso (Nz 23:5; w11 1/5 lok. 31 par. 5)

Yehova atyelaka basaleli na ye likebi kaka ndenge mobateli ya mpate ya bolingo atyelaka bampate na ye likebi.

OMITUNA BOYE: ‘Ndenge nini namoná ete Yehova atyelaka ngai likebi?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 23:3—“Banzela ya bosembo” to ya boyengebene ezali nini, mpe nini ekopekisa biso tóbunga nzela yango? (w11 15/2 lok. 24 par. 1-3)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Tángá vɛrsɛ moko ya kolendisa epai ya moto oyo ayebisi yo ete bazali komitungisa mpo na kobeba ya mabele. (lmd liteya 2 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Lakisá moto oyo azwaki mwa buku Sepelá na bomoi libela na libela! ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka. (lmd liteya 9 pwɛ 3)

6. Kokómisa bato bayekoli

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 54

7. Toboyaka mongongo ya bapaya

( (Min. 15) Lisolo na bayangani.

Bampate eyebaka mongongo ya mobateli na yango mpe elandaka ye. Nzokande, ekimaka mopaya mpo eyebi mongongo na ye te. (Yn 10:5) Biso mpe toyokaka mongongo ya Yehova ná Yesu, Babateli na biso ya bolingo mpe oyo babongi tótyela motema. (Nz 23:1; Yn 10:11) Kasi toboyaka koyoka mongongo ya bapaya, mpo balukaka kolɛmbisa kondima na biso na nzela ya ‘maloba ya bokosi.’—2Pe 2:​1, 3.

Ebandeli mokapo ya misato elobeli mbala ya liboso oyo mongongo ya mopaya eyokanaki awa na mabele. Satana asololaki na Eva na mayele mabe mpo eyebana te soki azali mpenza nani. Amimonisaki lokola moninga ya Eva, abalolaki maloba ya Yehova mpe akoselaki Yehova makambo. Likambo ya mawa, Eva ayokaki Satana, mpe yango ememelaki ye ná libota na ye bampasi mingi.

Lelo oyo, Satana alukaka kokɔtisa ntembe na mitema na biso na oyo etali Yehova mpe ebongiseli na ye na nzela ya bansango ya mabe, maloba oyo ezali solo mpenza te, mpe lokuta ya polele mpenza. Ntango toyebi mongongo ya mopaya, tosengeli kokima yango! Koyoka yango, ata mwa moke mpo na koyeba soki ezali nini, ezali likama mpenza. Maloba boni Satana azalaki na mposa ya kosalela mpo na kokosa Eva na mwa ntango mokuse oyo asololaki na ye? (Eba 3:​1, 4, 5) Sikoyo, tokosala nini soki moto moko oyo toyebi, oyo alingaka biso mpe azali na makanisi ya mabe te, alingi kolakisa biso makambo ya mabe oyo bazali koloba mpo na ebongiseli ye Yehova?

Lakisá VIDEO Boyá “mongongo ya bapaya.” Na nsima tuná bayangani boye:

Liteya nini ozwi na ndenge Rose asalaki na likambo na ye ná mama na ye oyo azalaki mondimi te?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 55 mpe libondeli