Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

04-10/03

NZEMBO 16-17

04-10/03

Loyembo 111 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. “Yehova, bolamu na ngai eutaka epai na yo”

(Min. 10)

Kosala boninga na bato oyo basalelaka Yehova epesaka biso esengo (Nz 16:​2, 3; w18.12 lok. 26 par. 11)

Kozala moninga ya Yehova esepelisaka biso mpenza (Nz 16:​5, 6; w14 15/2 lok. 29 par. 4)

Ndenge Yehova abatelaka biso na elimo esalaka ete tózala na kimya (Nz 16:​8, 9; w08 15/2 lok. 3 par. 2-3)

Lokola Davidi, bomoi na biso ezali na ntina mpo tomipesaka libosoliboso na losambo ya Yehova, epai bolamu na biso eutaka.

OMITUNA BOYE: ‘Na ndenge nini bomoi na ngai ekómi malamu koleka ntango oyo nayebaki naino solo te?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 17:8—Maloba “mbuma ya liso na yo” elimboli nini? (it-2-F lok. 697)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 1) NDAKO NA NDAKO. Pesá lokasa ya libyangi ya Ekaniseli. (th liteya 11)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Pesá lokasa ya libyangi ya Ekaniseli. Nsima ya komona ete moto asepeli, lakisá ye video Kanisá liwa ya Yesu mpe bólobela yango. (th liteya 9)

6. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 2) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Pesá lokasa ya libyangi ya Ekaniseli. (th liteya 2)

7. Kokómisa bato bayekoli

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 20

8. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na Ekaniseli?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Mpo na kotosa etinda ya Yesu, na Mwalomingo, 24/03/2024, tokosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu, oyo elobelaka mpe lisolo ya bolingo monene oyo ye ná Tata na ye bamoniselaki biso. (Lk 22:19; Yoa 3:16; 15:13) Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na molulu oyo ya ntina mingi?

  • Pesá mabɔkɔ na kampanye yango na esengo mpenza mpo na kobengisa bato na diskur sipesiale mpe na Ekaniseli. Salá liste ya bato oyo oyebani na bango, mpe bengisá bango. Soki moto afandi na teritware na bino te, luká na jw.org ntango mpe esika makita esalemaka na esika oyo azali.

  • Na sanza ya misato mpe ya minei, luká kosala mingi na mosala ya kosakola. Okoki kosala lokola mobongisi-nzela mpo na bangonga 15 to 30?

  • Na mokolo ya 18/03, bandá kotalela makambo minene oyo esalemaki na pɔsɔ ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Okoki kokata eteni oyo bakotánga mokolo na mokolo na “Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli ya 2024” na lokasa 6-7

  • Na mokolo ya Ekaniseli, talá video ya mokapo ya mokolo mpo na Ekaniseli na jw.org

  • Na Ekaniseli, yambá na esengo bato oyo bayei mpo na mbala ya liboso mpe baoyo batiká koyangana na makita. Omibongisa mpo na koyanola na mituna oyo bakoki kotuna na nsima. Zwá bibongiseli mpo na kokende kotala baoyo balingi koyeba makambo mosusu

  • Liboso mpe nsima ya Ekaniseli, manyolá na lisiko

Lakisá VIDEO Kanisá liwa ya Yesu. Na nsima tuná bayangani boye:

Ndenge nini tokoki kosalela video yango na kampanye ya Ekaniseli?

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 73 mpe libondeli