Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Mikakatano nyonso ezalaka na nsuka na yango

Mikakatano nyonso ezalaka na nsuka na yango

Mikakatano ekoki kolembisa biso, mingimingi soki eumeli. Davidi ayebaki ete mokakatano oyo azalaki na yango ná Mokonzi Saulo ekosila mokolo mosusu mpe akokóma mokonzi oyo Yehova alakaki. (1Sa 16:13) Kondima oyo Davidi azalaki na yango esalisaki ye azala na motema molai mpe azela Yehova abongisa makambo.

Ntango tozali kobunda na mokakatano moko, tokoki kosala makambo na bokɛngi, kosalela boyebi oyo tozali na yango to makoki na biso ya kokanisa mpo na kobongola makambo. (1Sa 21:12-14; Mas 1:4) Kasi, mikakatano mosusu ekoki kosila te ata soki tosali nyonso oyo tokokaki kosala na boyokani na mitinda ya Biblia. Soki tokutani na likambo ya ndenge wana, tosengeli kozala na motema molai mpe kozela Yehova abongisa makambo. Mosika te akosilisa bampasi nyonso mpe “akopangwisa mpisoli nyonso” na miso na biso. (Em 21:4) Ezala soki Yehova nde asalisi biso to tozwi lisalisi na lolenge mosusu, tosengeli koyeba likambo oyo: Mikakatano nyonso ezalaka na nsuka na yango. Koyeba likambo yango ekoki kobɔndisa biso.

TALÁ VIDEO BAZALI NA BOMOKO NA MOKILI OYO ETONDI NA BOKABWANI, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mikakatano nini bandeko bakutanaki na yango na sudi ya États-Unis?

  • Ndenge nini bamonisaki motema molai mpe bolingo?

  • Ndenge nini bakobaki kotya makanisi na bango na “makambo oyo eleki ntina”?​—Flp 1:10