Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Makambo misato ya kosala mpo na komonisa ete otyelaka Yehova motema

Makambo misato ya kosala mpo na komonisa ete otyelaka Yehova motema

Davidi alongaki Goliate mpo atyelaki Yehova motema. (1Sa 17:45) Yehova alingaka kosalela nguya na ye mpo na kosalisa basaleli na ye. (2Nt 16:9) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotya motema na lisalisi oyo Yehova azali kopesa biso na esika ya kotya motema na makoki to na mayele na biso moko? Talá makambo misato oyo okoki kosala:

  • Bondeláká mbala na mbala. Kobondelaka kaka te mpo na kosɛnga Yehova alimbisa yo ntango osali libunga, kasi bondeláká ye asalisa yo mpo okwea te na komekama. (Mt 6:12, 13) Kobondelaka kaka te Yehova mpo apambola ekateli oyo osí ozwaki, kasi bondeláká ye asalisa yo mpe apesa yo bwanya liboso ya kozwa bikateli.​—Yk 1:5

  • Zaláká na momesano ya kotánga mpe ya koyekola Biblia. Tángáká Biblia mokolo na mokolo. (Nz 1:2) Kanisáká na mozindo bandakisa ya Biblia, mpe saleláká makambo oyo ozali koyekola. (Yk 1:23-25) Bongamáká liboso obima na mosala ya kosakola na esika otya motema kaka na boyebi oyo ozali na yango. Bongisáká makita mpo ozwelaka yango matomba mingi

  • Saláká na bomoko elongo na ebongiseli ya Yehova. Yekoláká malako ya sika oyo ebongiseli ya Yehova ezali kopesa, mpe saleláká yango kozanga koumela. (Mit 9:17) Yokáká bankulutu ntango bapesi yo toli to malako oyo osengeli kolanda.​—Ebr 13:17

TÁLÁ VIDEO NTINA YA KOBANGA MONYOKO EZALI TE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

• Makambo nini ya kobangisa bandeko bakutanaki na yango?

• Nini esalisaki bango bálongola kobanga?