Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 1-5

Yobo abatelaki bosembo na ye na ntango ya komekama

Yobo abatelaki bosembo na ye na ntango ya komekama

Yobo azalaki kofanda na Uze na ntango oyo Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito. Atako Yobo azalaki Moyisraele te, azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova. Azalaki na bomɛngo mpe na libota moko monene, mpe azalaki moto monene na esika azalaki kofanda. Azalaki mopɛsi-toli ya lokumu mpenza mpe mosambisi oyo aponaka bilongi te. Azalaki kokabɛla babola mpe bato oyo bazangá. Yobo azalaki moto ya sembo.

Yobo amonisaki polele ete Yehova nde azalaki na ntina mingi koleka na bomoi na ye

1:8-11, 22; 2:2-5

  • Satana ayebaki ete Yobo azalaki sembo. Awanganaki te botosi ya Yobo epai ya Yehova; kasi, atyaki nde ntembe na makanisi oyo ezalaki kotinda Yobo asala bongo

  • Satana alobaki ete Yobo asalelaka Yehova kaka mpo na matomba na ye moko

  • Mpo na kopesa eyano na bifundeli ya Satana, Yehova atikaki ye anyokola moto wana ya sembo. Satana abebisaki biloko mpe makambo nyonso ya bomoi ya Yobo

  • Ntango Satana amonaki ete Yobo abateli bosembo na ye, atyelaki bosembo ya bato nyonso ntembe

  • Yobo asalaki lisumu te mpe alobaki na Nzambe likambo ata moko te ya mabe